Luka

16th Ordinary General Assembly of the Synod of Bishops in Vatican 16th Ordinary General Assembly of the Synod of Bishops in Vatican  (ANSA)

Ba mbando ya Synode bitáli ndongé, bobola mpe nzinganzinga

Bolandani ya bobimisi na Secrétariat ya Synode ya ba mbando (rapports) ya bituluku ya mosála bibandisama na Papá François na nsúka ya Synode etáli synodalité. Mikánda bibisami na mokolo ya mibalé 24 ya sánzá ya misáto bizali ya mokakatano ya mokengeli mpo ya ndongé mpe boyóki ligangi ya babola mpe ya mabelé.

Vatican News

Na sánzá ya misáto 2024, na bokónzi ya Papá François, Secrétariat Général ya Synode ya baepiskopo mpe ba préfet ya ba dicastère ya mayéle bapésaka na bituluku zómi ya boyékoli botáli mituná ebelé biútaki na biténi mibalé ya masoló ya Synode etáli synodalité. Ba mbando ya nsúka, bibongisami na bituluku biye ya mosála, bikobima malémbe malémbe úto 3 ya sánzá ya misáto elekaki. Secrétariat abimisi mokolo ya mibalé 24 ya sánzá ya misáto Mbando ya nsúka ya Etuluku ya boyékoli ya motángo ya 2, na nkombo «Koyóka ligangi ya babola mpe ligangi ya mabelé», na eye ya Lisangá ya Masangá ya baepiskopo y'Afrika mpe Madagascar na «Mokakatano ya botéi likambo ya ndongé».

Mbando ya nsúka ya Etuluku ya boyékoli ya motángo ya 2

Mbando ya nsúka ya Etuluku ya boyékoli ya motángo ya 2 ezali na biténi mingi. Likanisi lyokó ya préfet ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba, episkopo ya lokúmu Michael Czerny, ekomami libosó Mbando ekoluka koyanola na mituná mitáno ya ntina bipésamaki na Etuluku na loléngé eye Eklezia akoki Koyóka malámu ligangi ya babola mpe ligangi ya mabelé. Mokánda ebándi na bondimi ya boyékoli na mozindo liloba la Nzámbe 'te boyoki ya babola mpe ya mabelé ezali boponi bokó ya mokengeli te, kasi ekela lyokó ya boyambi ezali na etindá ya Eklezia, ekangemi na boyangeli ya bolingo mpe na ndakisa ya Mo-Samaria Molámu.

Motuná mokambi ya lisangá ya misála ya Etuluku ekómi waná: boni boni Eklezia ekoki Koyóka malámu magangi mibalé bikokangama, na boyébi 'te koyanola na ligangi ya babola ekokangama na koyanola na ligangi ya mabelé, mpe epái na epái?

Sima ya bolobi ba loléngé ya mosála, ba ndelo bakutani na yangó mpe matéya bazui, mbando etangi bisalelo bizali o ntéi ya Eklezia  -paloise, masangá ya ntina, esalelo Caritas, masangá ya biyamba mpe ya bikóló- mpe akopesa miango litomba, na bobengi na eleko ená ya koleka liséngínyá ya batindami ya mabé na bisika ya bato ya mayéle, na bokundoli na oyo nionso azua batisimo mokumba na ye. Káti na makanisi bipesamaki ya sóló ezali bokeli ya Botáli bokó ya Eklezia ya Bobósónó, likanisi eútaki na etuluku yókó ya moke ezalaki na bato ya bobósónó mingi, lokolá ndakisa ya kosála na esika moke mpe enéne mpo ya kopesa mongongo na bituluku binsó bitiama pembeni.

Mpo eye etáli boyékoli na mozindo liloba ya Nzámbe, mbando elobi esengeli na boyékoli bokó eye ebotami na boyóki babola mpe mabelé lokolá bisika ya boyékoli na mozindo liloba ya Nzámbe ya sóló (loci theologici) mpe ekosenga na basáleli ya boyékoli ená baye baúti na masangá bizali makási te bazala na bobongisi ya mikánda ya matéya.

Bokébi bokó epésamaki na botéi: manaka ya botéi mpo ya balaíki, bato ya eyamba mpe baí-likindo bisengeli kokotisa bokútáni mbala mókó na baye bakobika pembeni, likoki ya boyoki lokolá likambo ya molimo  -mpe kaka lokolá ya tekiniki te- na likákoli ya bato. Mokánda esúki na emoniseli ya Eklezia yókó ya Synode eye ekoki kokóma yangó mókó esalelo ya boyóki, ekosúka kaka na bokeli bisalelo ya koyóka te, kasi na bobongoli mókó mókó ya bilama na ye na motindami pembeni ya baye bazangi makoki.

Mbando ya SCEAM

Lisangá ya Masangá ya baepiskopo y'Afrika mpe Madagascar (SCEAM) ebongisaki likanisi lyokó na mokakatano ya mokengeli na likambo ya ndongé (polygamie), ekangemi na bonkoko ya bato mpe ya botéi ya mokili y'Afrika. Mbando ebándi na bondimi motúya esántu ya libótá y'Afrika, ekelami káti na bituluku ya bato, na bankoko mpe na Nzámbe, esika wápi mwána akomonana lokolá libenisi lyokó ya bonzámbe mpe mpósá ya ndalola (descendance) yókó ebelé lokolá ezali na káti ya bomoto ya lisanga. Ezali ndéngé waná ndé ekomami na lisapo bozali ya ndongé, likambo ezali kaka n'Afrika te, kasi kúna ekangemi mpenza mpe ezali likambo ya lombango ya mokengeli.

Likákoli ya biblia ekolakisa bokabwani: endimama na Bondeko bwa Kála, elekami malémbe malémbe na mobombano ya bondeko bwa sika, esika wápi Yézu  -na botáli mwángo ya ebándeli ya Mokeli- alobi polélé bomoko mpe boboyi bokabwani ya libala. Mokánda elobi lisusu na bokási litéya ya Eklezia: libala ya bokristu ezali ya molongani mókó na loléngé ya boyékoli na mozindo liloba lya Nzámbe mpe na loléngé ya kokonza ya bonkoko te.

Na ndéngé ya mokengeli, SCEAM eboyi loléngé nionso ya bondimi ya ndongé mpe esengi 'te bakatekisi ya ndongé bandimama lisusu te na batisimo yambo ya bomipesi na bonsómi ya kosála libala lyokó na molongani mókó. Ezali bolongoli to botiyi pembeni te, kasi bokéi bokó elongo malémbe malémbe mpe na botosi, likanisi eúti na mawa ya Kristu. Lokúmu la mwási etiami o káti ya litéya ená, na Maria -mama ya Yézu- ebongisami lokolá ndakisa ya bopalinginyi nsango elámu ezui nzóto na bonkoko. Bosúkisi efúngwami na «litéya lyokó ya pembeni» ekoki kofúngola bizibeli ya Eklezia na baye bakobika penepene ya molimo mpe ya bozali, na bondimi na moto mókó mókó mwána mókó ya Nzámbe abengami na bolingo ya lobokó mpe ya Bondeko.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya mísáto 2026, 14:22