Luka

Mgr Mgr Erik Varden, OCSO, o eleko ya ngalasisi ya molimo na Vatican Mgr Mgr Erik Varden, OCSO, o eleko ya ngalasisi ya molimo na Vatican  (@Vatican Media)

Ngalasisi ya molimo ya Karesimo: Mgr Varden akomanyola bongengi ya bosóló

Mgr Erik Varden asálaki likanisi na ye ya mitáno o eleko ya ngalasisi ya molimo na Vatican, biye Papá Léon XIV, baepiskopo bavandaka na Roma mpe bakambi ya ba dicastère bazali. Na botángi lisusu Bernard de Clairvaux, episkopo ya Norvège alobaki mingi na likambo-likonzi: "Bongengi ya bosóló". Tala na mokuse likanisi na ye.

Mgr Erik Varden, OCSO*

Bernard asimbi bisó. Alobi: "Nakebisi binó: moto mókó te akobika na mokili na bozangi lisenginya, soki moto mókó akangwami na yangó, azelaka ya sóló mosusu". Tosengeli kolona bokátikáti ya sémba káti ya botiyi motéma na lisálisi ya Nzámbe mpe bozangi bondimi na bolembu na bisó, na bobángi masenginya na kondima loléngé na yangó ya ezangaka te, na boyébisi bisó 'te Nzámbe akomeka bisó mpo bizali na ntina.

Ntina na loléngé nini?

Na bobundi na ba mbanzi bibwakami na Tatá ya Lokutá, bomipesi na bisó epái ya bosóló ekolendisama. Tokokoka, sima ya kopesa mokongo na bolembu ya lokutá, kolendisa bandeko na bisó.

Mpósá ya lokúmu ekolakisa loléngé lyokó ya bokwéi libosó ya lokutá. Mpósá ya lokúmu ezali loléngé lyokó ya ntina te mpe ya koleka ya lokósó. Bernard, kaka molobi, akosála makási mpo ya kolimbola yangó. Mpósá ya lokúmu, elobi ye, ezali "mabé mókó ya koleka, virus yókó ya bonkutu, mabé mókó ebombama, mosáli mókó ya lokutá; ezali mama ya bokósi, liziba ya mpósá, ebándeli ya mabé; ekobongisa bobomi, ekolembisa makambo ya motúya, ekopolisa bosántu, ekozipa miso ya mitéma. Ekobongola ba nkisi na bokono. Na mosála ya monganga, ekobenda bolembu". Mpósá ya lokúmu ekobotama na "bokangemi ya molimo". Ezali liboma lyokó eye ekomaka ntángo babosani bosóló. Likambo 'te mpósá ya lokúmu ezala loléngé lyokó ya liboma ekopesa soni na makambo na ye nionso, kasi mingi mpenza ntángo ekosimba bato basalaka na mosála bozali na loléngé ya mbano te. Ezali mpo na eloko te ndé elongi ya mosáli ya lingómbá na mpósá ya lokúmu azali na mosála ya kokoma mpe mosála ya elili lokóla loyémbo lyokó ya kosekisa.

"Bosóló ezali nini?"

Bato ya eleko na bisó batunaka motuná eye na bosóló, mingi na mpósá mókó elamu, atáko mobulungano na bangó, bobángi na bangó, na lombango na bangó. Tokoki te kotika motuná eye na eyano te. Tozali na makási ya kobébisa te na masenginya ya buzoba ya bobángi, ya lolendo mpe ya mpósá ya lokúmu. Tozali na mpósá ya makoki na bisó ya ntina koleka mpo ya kobátela bosóló yókó ya ntina mpe ya bozui bonsómi libosó ya bilembo bizali ntángo mosusu na bosóló, ntángo mosusu na zabolo.

Na ezalela na bisó ya pási, etondi na mabongisi, ezali na lotómo ya komona mpe kotambuisa mokili na mwinda ya Kristu. Kristu, oyo azali bosóló, asukaka kaka na kobátela bisó te, azali kozongisa bisó ya sika, na mpósá koleka ya komibisa na nzelá na bisó na bokeli yókó ya boyébi ya komikitisa na bozangi ntina.

Ezali komekama ya kokanisa 'te tosengeli kolanda mitindo ya mokili. Ezali, nakoloba, etamboli yókó ya ntembe. Eklezia, lingómbá na bolembu ya kotambola, ekozala kaka na likámá ya komonana esila ngala. Kasi soki ekoloba malámu lokota na ye, eye ya Makomi mpe ya litéya etáli milulu mya losámbo na misa, ya ba tatá na ye, ba mama, ba ngongi mpe basántu ya kála mpe ya leló, ekozala ya ye mókó mpe péto, ebongami ya kobimisa ba bosóló ya kála na ndéngé ya sika, na konzo yókó, lokóla asalaka libosó, ya kokamba momeseno.

Mosála eye ezali na lomeko lyokó ya mayéle ya ntina. Ezali lokóla na lomeko lyokó ya bozali. Lokóla episkopo ya lokúmu Schuster alobaka na mbeto na ye ya liwa: "Ezali lokóla 'te bato bakomitika te kondima litéya na bisó, kasi na libosó ya bosántu, bakondima nanu, bakofukama nanu mpe bakosambela nanu".

Mbela ya mokili na bosántu, elingi koloba mbela ya kozua nzóto ya bosóló, ezalaki nsakola ya makási koleka ya Concile Vatican II te? Ekoyokana lokóla ngonga yókó na eleko ya botáli. Bosengi na makási ya bokristu ya bosóló ekomi kondimama o eleko bongengi na ye ekomonana yangó mókó na bolingo mókó kobonzama na bosántu, esukwami na lisenginya nionso ya kolekisa ngonga.

*Mgr Erik Varden, episkopo ya Trondheim, na Norvège

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

28 sánzá ya míbalé 2026, 15:31