2025.11.28  Na tango ya mobembo mwa ye na Turkiye - Tango akendaki kotala bakoko na ndako na bango ya babangé, ekambami na bamamelo ya ba Piccole Sorelle dei Poveri 2025.11.28 Na tango ya mobembo mwa ye na Turkiye - Tango akendaki kotala bakoko na ndako na bango ya babangé, ekambami na bamamelo ya ba Piccole Sorelle dei Poveri  (@Vatican Media)

Na mokolo mwa bankoko, ya mbala ya motobà, Leon ya XIV asengi bàbosana bango ‘te.

Ebandisamaki na Pàpa François, na mobù 2021, mpo na kolakisa botuya bwa bango o kati ya mboka. Mokolo moye mokosalema na lomingo la 26 ya sanza ya Yuli, na mokolo ya bokundoli ya basantu Yoakim nà Anna, mpe ekozala na motó ya likambo: «Ngai, na kobosana yo té» (Yizaya 49,15). Ntoma-Mokonzi, asengi ‘te milulu mya misa esalema o kati ya katedrale moko na moko ya ba dioseze. Dokastele ya mpo ya balayiki, mabotà mpe Bomoi, ekolengele bisaleli mpo na milulu minà.

Bansango ya Vatikan

 

“Ngai na kobosana yo té”(Yizaya 49, 15). Ezali mótó ya likambo Pàpa aponi mp ona kosepela mokolo mwa mokili mobimba ya bankoko mpe ya mibangé. O mobù moye, bakosepela mokolo monà, na lomingo la 26 ya sànzà ya Yuli, na mokolo bwa bokundo basantu Yoakim nà Anna. Mokolo moye, mozali kolimbola ‘te bolingi bwa Nzambe ekozanga ‘te mpo na moto nyonso, ata na eleko moto akomi mobangé

Bobondi mpe Elikya

Oyo ezali nde nsango, Dikastele ya mpo ya balayiki, Mabotà mpe Bomoi, apesaki o mokolo moye mwa zomi ya Febwali. Ezali kolimboa boni boni maloma Pàpa azwi na mokanda mwa santu Yizaya, elingi ezala “maloba ma bobondi mpe ya elikya mpo ya bankoko mpe babangé banso, mingi mpenza mp ona baye bazali bango moko, to baye bayoki mpasi ya bobosani”; nzokande, kaka molongo mwa mokandà monà mozali lokola rappel mpo na mabota mpe ba communautés ya eklezia mpo na kobosana bango te, na ko reconnaître kati na bango présence ya motuya mpe bobenisi to lipamboli.

"Esengo na Moto abungisi Elikya ya yé te", ezali moto ya likanisi lya mokolo mwa bankoko, na mokili mobimba, ya mbala ya mitano, na mobù  2025
"Esengo na Moto abungisi Elikya ya yé te", ezali moto ya likanisi lya mokolo mwa bankoko, na mokili mobimba, ya mbala ya mitano, na mobù 2025   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Bondeko to bozalani pembeni bwa Eklezya

Dikastele oyo ezali kokamba likita lyango, ekopesa bibongiseli ya sikisiki mpo na kosalisa mangomba, bibongiseli mpe masangá ya mangomba na mokili mobimba, báyeba lolenge la malamu mpo ya kokumisa mokolo moye, nà bizaleli bya bisika ba bazwami.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

10 sánzá ya míbalé 2026, 14:08