Mgr Michael Czerny  o eleko ya misa po ya bakoni na Chiclayo Mgr Michael Czerny o eleko ya misa po ya bakoni na Chiclayo   (Dicastero per il Servizio dello Sviluppo Umano Integrale)

Mokolo ya mokoni na Péru, episkopo ya lokúmu Czerny abengi po ya "kosálela moningá na yo"

Na bokambi misa móķó na sanctuaire Notre-Dame ya Boboto ya Chiclayo, préfet ya dicastère po ya Mosála ya botomboli moto mobimba alobi mingi na litéya na ye bolingo eye ekomema pási ya mosusu. Asambelaki po ya bozui likabo lyoko, eye ya "kokomisa mókó mókó na makoki ya kosálisana na basusu po ya bolámu ya bansó mpe -mingimingi- ya balemba koleka".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Na Chiclayo, etuka ya monéne ya minei ya Péru ekelama na 1720 na bakúkoli (explorateurs) ya Espagne mpe ebomba libula ya mboka, motindami ya Papá, episkopo ya lokúmu Michael Czerny SJ, alekisaki ba mbote ya Léon XIV, o eleko ya bosepeli Mokolo ya mbala ya 34 ya mokili ya mokoni. Papá asálaka ministeli na ye ya motindami mpe ya episkopo ba mibú ebelé. Na nsango na ye epesamaki po ya mokolo ena, Léon XIV alobaki "nzebi ya bomoi na ye" eye esálisa ye ya kotála "boni boni bato bakokabola mawa mpe ngolu, na loléngé elobama na lisese ya Mo-Samaria molámu- elongi ya mokolo moye".

Nzebi mpe ya boyambi ya moto ye mókó

"Bolingo eye ememaka pási ya moningá", o ntéi ya nsakola ya Papá, "ekoki te kozala kaka likanisi lyoko, mbuma ya makanisi ya boyékoli na mozindo liloba ya Nzámbe to ya bato ya bongo bongo. Tokoki koloba bolingo waná, kaka úto nzebi ya yo moko mpe ya boyambi ya yo moko, likanisi na bomoi ya bileko esika wápi tomonaki bolingo ena na mosála", elobaki lisusu episkopo ya lokúmu Czerny na litéya na ye.

Izaya, moyembi mpe mokónzi ya basoda

Batindami ya bisalelo ya bokolongono mpe masangá ya biyamba bazalaki waná, na bakoni mpe mabótá na bangó baye bakokaki koyamba sakraménto ya mafuta ya bakoni. Na koyekama na Makomi Masántu, motindami ya Papá alobaki lisusu bilongi ebelé mpe nkombo biye basála nzebi ya libiki, lokóla Izaya, moyembi, mokónzi ya basoda mpe mingi misusu.

"Soki ezali na nsinga ya motané eye ekosangisa bato bansó waná ya biblia -mpe mókó mókó ya bisó na bangó, ezali mpenza nzebi ya bolingo ena ya bonzámbe eye, na komema pási ya mosusu, ekoki kopesa bomoi, bokolongono, libiki", elobaki ye. "Na Misa eye, elobaki episkopo ya lokúmu, tolingi kolakisa na Nzámbe ya bomoi botondi enéne ya bisó po ya mbala inso esika wápi tozalaki, na ndéngé mókó to mosusu, na bolingo ena eye ekosálisa mpe ekobikisa".

Bolingo eye ekomema pási ya mosusu

Tosangani na nzebi ya pási mpe ya bolingo eye ekosálisa, ekobaki ye, "tokoki bôngó komimona na maloba maye Léon XIV atindeli bisó na nsango na ye": "kozala mókó na Mókó elingi koloba komiyoka ya sóló bilama ya nzóto yoko esika wápi tomemi, na ndéngé ya bobengami na bisó, ngolu ya Mokónzi po ya bato bansó. Lisusu, pási eye ezui bisó ezali pási yoko ya mopaya te; ezali pási ya elama yoko ya nzóto ya bisó móķó eye Motó na bisó ekosenga bisó tosálisa po ya bolámu ya bansó"

Kotála na miso ya Nzámbe

Episkopo ya lokúmu Czerny atangaki profeta Izaya oyo, na komesana na "mbongwana" eye Nzámbe asáli epái ya Ezekias, asakoli yambo na oyo liwa na ye; na sima, aluki kokende, abengami azonga po ya komema epái ya mokónzi, po ya Nzámbe, nsango móķó ekeseni mingi na mosusu, eye ezongiseli elikya ya libiki mpe ya bomoi. "Bolingo ezali nzela yoko ya mbongwana, na ndéngé esengeli liloba", esémbolaki préfet ya dicastère po ya Mosála ya botomboli moto mobimba.

Ezali ya "Kotála na miso mwa Nzámbe, ya kosepela kosakola masakoli ya mabé to ya koloba makambo ya mawa te", kasi "ya kobongama ntángo inso po ya kobongola nzelá, po ya kotála na elikya lisusu mpe ntángo inso, mosusu".

 

"Kosálela moningá na yo, ezali kolinga Nzámbe na makambo"

Na sanctuaire ebonzama na Maria, episkopo ya lokúmu asambelaki po ya bozui likabo lyoko, eye ya "kokomisa mókó mókó na makoki ya kosálisana na basusu po ya bolámu ya bansó mpe -mingimingi- ya bato balemba koleka", na boleki "bomekami ya bo-ngai eye ekopusa bisó mosika na bandeko na etinda ya kobátela baye bazali na bosenga koleka". Mpe ndéngé Papá akomi na nsango na ye, "kosálela moningá na yo, ezali kolinga Nzámbe na makambo": na loléngé esusu, "lokóla bakristu, tokoki te kobosana 'te bolingo na bisó po ya basusu ezali kaka bobimisi ya sóló ya bolingo na bisó po ya Nzámbe mpe 'te tokoki koloba te to kokanisa te 'te tolingi Nzámbe na koleka te na nzelá ya bolingo", elingi koloba "bolingo epesami na mosusu oyo azali na bosenga na ngai", elobaki episkopo ya lokúmu Czerny

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

12 sánzá ya míbalé 2026, 12:46