Mibéko ya sika po ya Akademi ya Papá po ya Maria ya bikóló biíke
Vatican News
O eleko ya likita lyokó epesamaki na Mgr Edgar Peña Parra, mosáli po ya makambo mansó ya Mosála ya secrétariat ya Letá, Papá Léon XIV andimaki mibéko ya sika y'Akademi ya Papá po ya Maria ya bikóló biíke, na bomoni liséngisi ya kokokisana mwángo na yangó na etamboli ya likoki na ye mpe loléngé ya ezalela ya leló ya bisalelo ya Curia. Mokáno ena esakolamaki na eyano ekomami ebimaki mokolo ya 7 ya sánzá ya mibalé na Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo.
Lisapo y'Akademi ya Papá ya Maria ya bikóló biíke
Kinó leló, lokóla elobamaka na Papá François na maloba na ye na ba Akademi ya Papá na 4 ya sánzá ya zómi na mibalé 2019, Akademi "ekambaka elongo na Motéyi mokónzi (Magistère) ya mokili ya Eklezia na boluki mpe bokambemi ya boyékoli makambo ya Maria [...] na ngolu ya bosálisani na bisalelo loléngé na loléngé ya ba akademi", na botatoli bongo "liséngisi ya boyékoli Maria na lisoló káti ya mimesano, ekoki kotómbola bondeko mpe boboto". Akademi ya Papá po ya Maria ya bikóló biíke esálemaka na 1946 na Molongó ya ba Frères Mineurs, na lisálisi ya Commisio ya Maria ya ba Franciscain, po ya bosáli, o ntéi ya ye, boyékoli mpe bosambeli Maria.
Misála mibalé bipesamaka na oyo abimisaka likanisi, Sángó Carlo Balić, eleko waná mokambi y'Athénée ya Papá Antonianum mpe mokonzi ya Ngwendé ya boyékoli Maria. Úto 1950, Ngwendé ya Sántu-Petelo epesaka n'Akademi ya Maria bosáli ya ba Congrès ya makambo ya Maria ya bikóló biíke. Na 8 ya sánzá ya zómi na mibalé 1959, Papá Yoane XXIII, na Motu Proprio Maiora in dies, na bondimi 'te misála y'Akademi bisálisaki na bomátisi ya matéya mpe ya bosántu ya Maria, epesaka ye nkombo ya Akademi ya Papá, na bopesi na ye bosáli ya eleko insó ya ba Congrès ya Maria ya bikóló biíke, bokambemi mpe bokútáni ya bato ya nzebi ya boyékoli Maria ya mokili mobimba, mpe na bolobi lisusu etinda na ye ya kotómbola mpe kolendisa boyékoli ya Ngondo Maria po ya bolámu ya boyékoli ya Maria mpe ya botomboli ya sóló bosántu ya Maria. Ndé bongo ebotamaka Akademi ya Papá po ya Maria ya bikóló biíke.
Bosangisi na Antonianum
Úto bokeli na ye, esalelo etiamaka na bokambemi ya Congrégation ya Saint-Office (ekoma dicastère po ya Matéya ya boyambi). Engebene na Mibéko ya 1997, bokambemi ya misála na ye na biye ya ba Akademi ya Papá bisusu epesamaka na Conseil ya Papá ya momesano. Na Constitution apostolique Praedicate Evangelium, etinda ena epesamaka na dicastère po ya Momesano mpe Boyékoli. Eúta na Molongo ya ba Frères Mineurs ya Athénée ya Papá Antonianum, ekoma na sima université, Akademi ya Papá ya Maria po ya bikóló biíke esangisamaka na athénée eye na 18 ya sánzá ya mitáno 1972 lokóla esálelo ya ntina na boyékoli Maria. Epái esusu, na 4 ya sánzá ya zómi na mibalé 2012, Akademi ya Papá po ya Maria ya bikóló biíke eyambaka o ntéi ya ye Akademi ya Papá ya Mbótama na Mbindo te.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye