Episkopo Ettore Balestrero Episkopo Ettore Balestrero 

Mgr Balestrero: "Mikakatano ya ONU bikolakisa kwokoso ya boyokani ya bikóló biike"

Sima ya mbela ebwakamaki na secrétaire général António Guterres na bosili ya mosolo ya ONU, episkopo motáli ya eleko inso ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na Genève epái ya buro ya ONU mpe ya masangá masusu ya mokili alimboli na ba média ya Vatican 'te likambo yangó ezali kokoma matata koleka: "ezali kwokoso yoko etáli lisangá. Ezali pasi ya kokanisa na bokati ya ntina biye bisalemaki na lisálisi ya bato".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Kotála úto Genève, esika wápi episkopo Ettore Balestrero azali motáli ya eleko inso ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya buro ya ONU mpe ya masangá masusu ya mokili, mbela ebwakamaki na secrétaire général ya ONU, António Guterres, na eye etáli bokwéi boko ya sóló ya esalelo káti ya ba bulamatari soki bikóló bilama bapesi na lombango te ba niongo na bangó ya makabo, eyokani lokóla eyebiseli ya bobangisi: "Ezali mbala ya libosó te 'te Guterres aluka bokébi na likambo yangó. Na súka ya mobú moleki, atindaka mokánda (rapport) moko na Liyangani lya bansó (Assemblée générale) na eye etáli likambo mabé ya mosolo. Kasi kwokoso ekomi makási lisusu na mikolo. Ntembe (incertitude) ekokola mpe bokokisi mpe bosáleli ya manaka bikomi kobángisa". Lisoló.

Okanisi mpenza 'te bokwéi boko ya ONU ekoki kosálema ?

Nalingi kokanisa te 'te yangó ekoki kokoma. Kasi ezali eyebiseli yoko ya makási koleka, ezali kwokoso yoko etáli lisangá. Leló, kasi lisusu koleka soki kwokoso ena ezui eyano te na lombango, ba ntembe (défis) ya minéne bizali misála bikozonga sima, lisálisi na bosáleli ya manaka mpe ya bobateli misala ya bobateli boboto, bofuti lifuta ya basáli mpe bozui basáli ya sika. Ndakisa, ekomonana lokóla 'te tokokende na bokitisi na 15% ya mosolo ebongisama na misála ya bobateli boboto. Ezali pási ya kokanisa ba bokati lisálisi ya bato biye bisalema kála mpe bikoki lisusu kokoma makasi. Kasi boyangelami ya koleka epái ya motángo moke ya bato ekokolisa lisusu likambo ya mosolo.

Okanisi te 'te kwokoso ya mosolo esika ONU ezuami ezali na bosóló elili ya kwokoso ya boyokani ya bikóló ebelé?

Se bongo. Ezali elembo ya mabé moko monéne mpe ya kwokoso yoko ya mozindo, eye ezali eloko moko na biténi bebo. Ndakisa, bobuki ya bisalelo ya bikóló ebelé libosó ya bitumba, bokimi mbango ya sika na bozui mindoki, bolongoli esalelo ya bobotoli mandoki eye esalemaka na ONU kaka sima ya Etumba ya Ibalé ya mokili. Na 5 ya sánzá ya mibalé elekaki, New Start, boyokani ya mokili po ya bokitisi mindóki ya nucléaire etiamaka loboko n'Amerika mpe na Russie, esilaki. Sik’oyo, ONU ekolakisa mokili moko eye ezali lisusu te. Ekokoka lisusu te kolonga mikakatano ya sika ya mokili.

Etelemeli (position) ya sika ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na bosengeli ya boyokani ya bikóló ebelé ezali nini?

Ezali eye Léon XIV alobaka kála mingi te na lisikulu na ye na batindami ya bikóló. Lokóla Papá alobaki, tokobika na mokili moko esika wápi mikakatano bizali ndéngé na ndéngé. Mpe na mokili eye, masangá ya bikóló biíke bisengeli kosálisa lisoló, kosunga ya kotónga mokili moko ya sémba koleka. ONU esengeli kozala makási koleka na bokobi na makanisi ebelé te to na ba mbano ya mokuse, kasi na ba politiki ya boluki bomoko ya libótá ya bato. Etelemeli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ezali eye: boyokani ya bikóló ebelé elingi koloba kopesa esika yoko epái wápi bikóló bikoki kokutana mpe kosolola. Kasi po ya kosolola, lokóla Papá wa Roma alobaki yangó, esengeli koyokana na maloba, na makanisi. Soki maloba bibungisi bomoko na bangó na bosóló mpe bosóló yangó-mei ekomi ya kobunana, waná ekokoma pási ya koyéba nini moningá alobi.

Mbongwana ya ONU emonani na ntina koleka. Kasi nani akoki kozua mokumba na yangó?

Ezali na Bikóló bilama ya Lisanga ndé bazali na mokumba waná, mpe eye tozali na pósá koleka, ezali bolingi elámu mpe na liyoki lyoko ya bolámu ya bansó. Bobimisi ya bokónzi esengeli te kosálema na bokaboli boko ekokani na mikumba po ya bolámu ya bansó. Bozali ya bikóló biíke ekosenga mokumba moko ya bansó mpe boyokani boko na botosi yambo ya nionso ya lokúmu ya moto moko moko.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

07 sánzá ya míbalé 2026, 12:45