Mamelo Nina Krapić akopesa mbote na Papa Léon XIV na bilanga ya Vatican Mamelo Nina Krapić akopesa mbote na Papa Léon XIV na bilanga ya Vatican  

Mamelo Nina Krapić alubolami mokambi molandi ya Ndáko ya bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu-Petelo

Papá Léon XIV abongisaki bolubolami na ye ya yambo o ntéi ya dicastère po ya Boyebisi. Mamelo ya Croatie, kinó eleko eye elama ya dicastère ena, akitani na mopanzi nsango Cristiane Murray oyo atiki esika azalaki úto sánzá ya sambo 2019.

Vatican News

Papá Léon XIV alubolaki mamelo ya Croatie Nina Benedikta Krapić M.V.Z. mokambi molandi ya Ndáko ya bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Akitani na Cristiane Murray, oyo atikaki misála na ye bibandaka úto sánzá ya sambo 2019 mpe ayambamaki na likita na Papá wa Roma mokolo ya mitáno na ntongo. Mamelo ya Croatie ya mibú 36, kinó sik’oyo elama ya dicastère ya Boyebisi, akokamata misála na ye ya sika na mokolo ya yambo ya sánzá ya misáto ekoya.

Mamelo Krapić abotami na Rijeka (Croatie) na 7 ya sánzá ya motóbá 1989 mpe azuaka lipolome lyoko na sémbo (droit) na 2015 na etéyelo ya likoló ya etuka na ye, sima ayékoli na bozindo boyokani na etéyelo ya likoló ya Zagreb na 2023. Asakolaka bilako na ye na Lisangá ya ba mamelo ya Charité ya Sántu Vincent de Paul, na 13 ya sánzá ya mwambi 2023. Asalaka lokóla mopanzi nsango mpe molaki ya mambi ya bosémbo mpo ya bási bazua makámá na ndáko mpe ya bato basusu babwakama. Azali mokambi ya boyebisi Caritas ya dioceze ya Rijeka. Úto 2023, ezali elama ya dicastère po ya Boyebisi mpe doctorante na nzebi ya bato na Collegium Maximum ya etéyelo ya likoló ya Papá Grégoire ya Roma.

"Natondi Cristiane Murray mpo ya bomipesi mpe mosála malámu asalaki na mosála na ye. Kaka na molimo ena, natombeli nkonzo elamu na mamelo Nina Benedikta Krapić, na boyébi makoki minéne na ye ya mosála mpe ya bomoto", elobaki préfet ya dicastère ya Boyebisi, Paolo Ruffini.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

13 sánzá ya míbalé 2026, 16:04