Chiclayo, linaka lya Mokolo mwa mokili mobimba ya bakoni 2026
Vatican News
Linaka ya mbala ya 34 ya Mokolo ya mokili ya bakoni, ebengami "Mawa ya moto ya Samarie: kolinga na bomemi pási ya moningá", eye ekokumisama na dioceze ya Chiclayo, na Péru, úto 9 kinó 11 ya sánzá ya mibalé 2026, ezali na milulu ebelé. Po ya libakú ena, Papá Léon XIV aponaki lokóla motindami ya ntina episkopo ya lokúmu Michael Czerny, mokambi ya dicastère po ya Mosála ya Botombwami ya Moto Mobimba. Bakozala lokóla na molulu ena ntómá ya Papá na Péru, Mgr Paolo Rocco Gualtieri, baepiskopo mpe batindami ya mosála ya bokolongono ya masangá 22 ya baepiskopo y'Amerika ya latin mpe ya Caraïbes, batindami ya dicastère po ya Mosála ya Botombwami ya Moto Mobimba mpe batindami ya biténi 46 ya eklezia ya Péru.
Botáli ya ba lopitalo misáto mpe bokútáni na Etéyelo enéne katoliko
Na 9 ya sánzá ya mibalé, batindami ya Vatican, bakokambama na episkopo ya lokúmu Czerny, ekotala ba lopitalo misáto: mosála ya nzebi ya makono ya káti ya lopitalo Las Mercedes, eténi ya bosálisi loléngé esusu mpe ya lombango ya lopitalo Belén. Na sima, mokambi akozala na likita lyokó na Etéyelo enéne katoliko Santo Toribio (USAT) na baepiskopo mpe batindami ya mosála ya bokolongono ya Masangá ya baepiskopo y'Amerika ya latin mpe ya Caraïbes.
Likindo etáli bosálisi loléngé esusu mpe molimo
Na 10 ya sánzá ya mibalé ekosálema likindo lyokó ebengami: "Mawa ya moto ya Samarie, bomátisi ya bosálisi ya loléngé esusu n'Amerika ya latin mpe molimo mpe lisálisi mobimba ya mokoni". Symposium ya boyékoli mpe ya bokanisi, eye ekosalema na théâtre ya Colegio Santo Toribio ya Mogrovejo, káti na bato bakozua maloba tozali na Dr Luis Solari de la Fuente, Dr Luz María Loo Palomino de Li, sángó Alejandro Alvarez Gallegos...
Misa ya 11 ya sánzá ya mibalé
Na 11 ya sánzá ya mibalé, misa moko ekosálema na sanctuaire ya Nuestra Señora ya Paz na ngonga ya libwa, ekokambema na episkopo ya lokúmu Michael Czerny mpe ekosálema elongo na ntómá ya Papá na Péru, Mgr Paolo Rocco Gualtieri, episkopo ya Chiclayo, Mgr Lizardo Estrada, mpe na baepiskopo mpe batindami ya Lisangá ya baepiskopo ya Péru mpe ya bikóló babéngami. Batindami ya bisalelo ya bokolongono mpe ya masangá ya biyamba bakozala lokóla na misa, na lokóla bato bakutani na makambo ya bokolongono ya makási, baye bakoki kozua sakramento ya bopakoli mafuta ya bakoni.
Episkopo ya Chiclayo: bikela ya sóló ya pembeni
Episkopo ya Chiclayo, Mgr Edinson Farfán Córdova, alobaki 'te "bolingo ezali na pósá ya bikela ya sóló ya pembeni, na biye tokondima pási ya moningá, mingi mpenza eye ya bato baye bakobika na ndéngé ya bokono mpe mingimingi na eleko yoko ya bolembu eúti na bobola, na bozali yo moko mpe na bomŏkó", mpe akobianga ya kosangana na molulu ena ya eklezia na losámbo.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.