Bobébisi ya makoki ya bomoto: Ngwendé ya Sántu-Petelo alendisi po ya biyano bisangisami
Vatican News
Bolendisi ya bisalelo bizali likoló ya bikóló mpe bosololi ya bikóló ebelé ekambami epái ya bolámu ya bansó po ya koyanola na mimekano ya leló. Ezali yoko ya makambo ya nsakola ya Mgr Juan Antonio Serrano, motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya Lisangá ya Bikóló y'Amerika, o eleko ya mbala ya mwambi ya likita ya mbalakaka ya Conseil ya eleko insó, eye esálemaki na 11 ya sánzá ya mibalé na Washington. Ebengamaki mpenza po ya bosololi na batáli ya bileko binsó. Na bolobi lisusu bokoti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na lisangá na 1978, Mgr Cruz Serrano akumisaki mosála ya lisangá ena "lokóla likita lya politiki ya ntina po ya bosololi, boyokani mpe bolukiluki ya eyano yoko o ntéi ya Bikóló ya mokili y'Amerika".
"Ndáko ya ba Amerika"
Na bozui na ye ya maloba, motindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alobaki lisusu 'te "Ndáko ya ba Amerika", esimbami na makonzi na ye minei -demokraci, makoki ya bomoto, bokengi ya loléngé insó mpe botomboli mobimba-, ebengami ya kolakisa emoniseli yoko ya mobimba ya bomoto mpe ya bomoto, makambo-makonzi maye Ngwendé ya Sántu-Petelo ekomatisa na bokási na eténi ya likoló. Ntina ya momesano móķó ya démokraci "esálemi na bisalelo ya makási mpe ya bosololi lokóla esálelo ya ntina po ya bosilisi bitumba" ezali likambo lyoko makási eye esengeli elendisama.
Komátisa makoki ya bomoto
Mgr Cruz Serrano atelemaki lisusu na makoki ya bomoto, na bolobi lisusu bomipesi ya boúmeli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo "na bomátisi mpe bobateli ya makoki ya ntina, na bokébi mókó mpo ya bato bazanga koleka". Likoki ya bomoi esengeli kobatelama úto bokúmbi zémi kinó liwa ya sóló, lokóla bonsómi ya eyamba eye "ezui esika yoko ya káti, kaka lokóla likoki ya moto ye moko te, kasi lokóla likonzi ya ntina ya bobiki esika yoko na kimia mpe na botosi ya ndéngé na ndéngé ya bato", elobaki motindami ya Vatican.
Biyano bisangisami mpe ya bosálisani
"Etumba libosó ya bobébisi ya makoki ya bomoto ya ntina, bobola, mobúlú mpe bobébisi ya nzinganzinga -elobaki ye- ekosenga Biyano bisangisami mpe ya bosálisani". Ngwendé ya Sántu-Petelo ekoki, na loléngé ena, kopesa "makambo, nzebi mpe bosálisi" po ya kotika engumba ena ya mokili kaka "boboto koleka, ya koúmela, ya koyamba ba migrant mpe bato babwakama, efungwama na bansó". Na súka, Mgr Antonio Cruz Serrano alobaki lisusu mpósá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya kokoba kosálisa na bokási na lisangá.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.