Sango Stefano Cascio pe Papa Léon XIV Sango Stefano Cascio pe Papa Léon XIV  (centro alta formazione Laudato si')

Sángó Stefano Cascio alubolami mokambi molandi ya esika ya boyekoli Laudato si"

Sángó alubolami na episkopo ya lokúmu Fabio Baggio, mokambi ya etéyelo enéne. Nsango ebimaki mokolo ya yambo 12 ya sánzá ya libosó. Akosalisa, na mosála na ye ya sika, mokambi na misála ya mokolo na mokolo pe na bobateli makoki ya bato ya Borgo Laudato si'.

Vatican News

Sángó Stefano Charles Cascio alubolamaki mokambi molandi pe mobáteli ya esika ya boyekoli ya likoló Laudato si'. Na communiqué yoko, alobi botondi makási po ya boponi ya episkopo ya lokúmu Fabio Baggio, mokambi ya etéyelo, po ya nzebi eye sángó alakisaki na tángo ebelé, mingi mpenza na likambo ya boyebisi ya eklezia, ya bobateli bilenge pe ba mwángo ya ba média na ekóló pe na mokili.

Na mosála na ye ya sika, sángó Cascio akosalisa mokambi na misála ya mokolo na mokolo pe na bolengeli ya Borgo Laudato si', na bokobi "koluka ntombwana kaka makási pe ya malongá ya makanisi ya etéyelo, na boyokani ya emoniseli ya encyclique Laudato si'".

Bomipesi, mosála pe bozaleli

Abotama na Nice na 18 ya sánzá ya libwa 1978 pe azali bikóló mibalé ya France pe Italie, sángó Stefano Cascio asalaki na 2001 nzelá na ye ya bobengami na etéyelo ya boyekoli pe ya matéya matali mambi ma Nzámbe Studium ya Notre-Dame ya Bomoi ya dioceze ya Nice, yambo ya kokoba botéi na ye na Likindo enéne ya papá. Akulaka bonganga Nzámbe na 2008 pe asálaki na dioceze ya Roma.

Na bomipesi na ye, alakisaki, engebene na communiqué, "na bomipesi, ya molimo ya mosála pe ya bozaleli boko ya bobateli ntángo inso". Asála misála ebelé, mingi mpenza eye ya sángó-mokonzi ya San Bonaventura da Bagnoregio úto 2016, pe molaki ya eklezia ya UCSI Lazio, Lisangá katoliko ya media ya Italie. Sángó Stefano Charles Cascio azali lokóla mokambi molandi ya Buro ya boyebisi ya dioceze ya Roma úta 2024.

Bokonzi ya etéyelo ya botéi Laudato si' epesi ye "matombeli malámu, na bopesi mosála na ye na ekelá ya Elimo-Sántu, zambi akoka kosála na ndéngé ya malonga etinda ya Eklezia pe na bomipesi po ya bobateli ndáko ya bisó bansó".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

15 sánzá ya yambo 2026, 21:28