Luka

2025.05.30 Paolo Ruffini al Festival della Comunicazione di Fermo 2025.05.30 Paolo Ruffini al Festival della Comunicazione di Fermo 

« Sambela na Papá », réseau moko ya lisangá na eleko yoko ya ba bokabwani

Na likanisi ememami na dicastère ya Boyebisi (communication) pe Réseau ya mokili ya losámbo po ya Papá elakisamaki mokolo ya misáto 7 ya sánzá ya yambo na Ndáko ya makita ya bopanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. "Ezali nanu likoki ya kokutana pe losámbo esalisaka ya kozongisa bomoko", elobaki préfet ya dicastère, Paolo Ruffini. Po ya mokambi ya Réseau ya losámbo, sángó Fones, ezali "ekuke yoko efungwami po ya kosangisa na mikáno ya Papá wa Roma".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Úto ndáko-Nzámbe epesama na sántu Pérégrin kinó mokili mobimba, ekela ya sika, "Sambela na Papá", ekolinga kosála réseau moko ya lisangá ya sóló pe kaka virtuel te na Léon XIV. Ematisami na Réseau ya mokili ya losámbo ya Papá, elakisamaki na préfet ya dicastère ya Boyebisi, oyo azali lokóla o ntéi ya mwángo yangó, mokolo ya misáto 7 ya sánzá ya yambo na Ndáko ya makita ya bopanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, moke yambo ya bobimisi ya vidéo ya libosó ekolakisa mikáno ya losámbo ya Papá po ya sánzá ya yambo. Mikáno biyokisamaki na Papá na nkótá misáto: anglais, italien pe espagnol.

Ngonga ya malémbe ya losámbo

"Losámbo ya moto ye mei pe ya mokili ya Papá epesami na loléngé ya sika, ya bosáwa pe ya nguyá, lokóla esalelo yoko ekomonana ya bomoko pe ya bosangani na Mokónzi, esika yoko ya bokutani po ya ba milio ya bato, bazali mbala moko na internet pe na bisika ya sóló ya bomoi na bangó, kobánda na motéma ya moko moko".

Ezali bôngó ndé Paolo Ruffini alobaki ntina ya "réseau" lokóla "esalelo yoko ya bosangisi", pe ya bosangisi lokóla "esalelo ya boyebisi" eye ekotúmola lombango ya eleko na bisó na bopusi moto ya leló na esika moko ebátelama, na eleko ya malémbe, ya losámbo". "Réseau ena, eye ezali virtuel te kasi ya sóló, ekolakisa 'te ezali nanu na likoki ya kokutana, atá na eleko eye ya ba bokabwani, ya ba bombe pe ya bitumba", elobaki préfet. Losámbo esalisaka ya kozongisa bomoko ya eye ekabwani.

Mikáno mikeseni ya losámbo

Bokutani ya sánzá epái wápi Léon XIV abengi Eklezia pe bandimi na ye ya koloba elongo losámbo lyokó ezali na elembo ya mokáno moko eye ekobongwana sánzá na sánzá pe eye ekozongisa o káti ba loléngé bikeseni: mikakatano biye mokili ekobundana, lokóla bobotoli mandoki pe boboto, to mikakatano ya Eklezia, lokóla biye bilakisami na bopalinginyi nsango elamu. Likanisi endimi elobeli yoko eye ekolakisa malámu ya boyebisi ya Internet ya leló pe ezali o ntéi ya molongó ya "vidéo ya Papá", ebimaka eleki mibú zómi na François pe eye ekomaki na ba milio 260 ya bomoni na mikili mitáno.

Kosambela, ezali kotónga réseau moko

« Tángo Papá Léon XIV abengaki biso banso, bayékoli batindami ya eleko ya internet, ya kokende kobongisa minyama », ebakisaki Paolo Ruffini, atunaka mpenza ya kolona bizaleli ya bonene to ya bolongi te, kasi ya komona lisusu ntina ya nionso, na boyékoli ya komibaluka bansó elongo epái ya Nzámbe, na bobimisi bôngó mobombano ya bosangani eye esangisi bisó, káti ya bisó pe na Ye. Na bokundoli maloba ya Papá na litéya na ye o eleko ya misa ya bosúkisi Zúbile ya elikya, Ruffini alobi momeseno ya kotónga ba réseau na botáli nkita. Bôngó, "likanisi ya kosála lisusu, likambo mosusu te, na réseau moko ya losámbo ekoki komonana ya kokámwa. Nzokándé, ebakisi ye, kosambela elongo, ezali kotónga réseau moko. Pe ata na eleko na bisó, lokola Papá Leon XIV alobaki yangó lobi na litéya na ye, bolukiluki ya molimo ya bato ya eleko ya bisó, ya nkita ebelé koleka eye tokoki tángo mosusu koyeba, ekotuna bisó".

Ekuke yoko efungwami

"Sambela na Papá", elimbolaki mokambi ya Réseau ya mokili ya losámbo ya Papá, sángó Cristóbal Fones, "elingi ezala ekuke yoko efungwami po 'te moko moko, epái nionso azali, akoka kosangana na mokáno ya losámbo eye Sántu-Papá abongisi sánzá na sánzá, na kosambela na ye, na molimo moko ya Synode"

Paolo Ruffini asalaki 'te Papá abengaki na vidéo moko ya mokuse ya kosambela elongo, na kolendisa ya kozua ngonga, na kokima boleki ya ba réseaux sociaux. "Léon XIV akoloba lokóla moto moko ya eleko na ye, na eleko na ye, epái wápi amipesi esika yoko po ya losámbo", ebakisaki préfet. Esika yoko wápi okoki kokima bokébi eye ebongisa leló bomoi ya moko moko po ya kopema mopepe ya sika ya Liloba ya Nzámbe.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

09 sánzá ya yambo 2026, 16:07