Luka

Eoiskopo ya lokumu Parolin, Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Santu-Petelo, na cathédrale ya Bruxelles; na 11 ya sanza ya yambo 2026 Eoiskopo ya lokumu Parolin, Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Santu-Petelo, na cathédrale ya Bruxelles; na 11 ya sanza ya yambo 2026 

Na Bruxelles, episkopo ya lokúmu Parolin abengi Poto ya kozua lisusu bokási ya bokristu

O eleko ya mibú 800 ya cathédrale Saints-Michel-et-Gudule ya Bruxelles, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe motindami ya papá, akambaki mokolo ya eyenga 11 ya sánzá ya yambo misa po ya bosepeli batisimo ya Mokónzi. Libosó ya bakónzi ya eklezia pe ya letá, atiaki lisapo ya ndáko-Nzámbe ena na likanisi lyoko linene koleka eye etáli etindá ya Eklezia pe lobi ya molimo ya Poto, ezua po ya ye botaú, bokabwani pe bobungisi ya bilembo.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Na cathédrale ya bikeke mwambi ya lisapo, esika wápi ba nkáma ya bandimi, ya yambo mokónzi ya Beleziki na mwási na ye, episkopo ya lokúmu Parolin akundolaki 'te boyambi ya bokristu emataka te na libanda ya ngonga, kasi "o ntéi ya lisapo, na bisika ya sóló pe na nzelá ya masangá ya sóló". Libosó ya botongi na ekeke ya zómi na misáto, chapelle yoko ya yambo ebonzamaka na sántu Michel, simá ndáko-Nzámbe yoko, bilakisaka bopikami ya bokristu na ngómbá ya Bruxelles. Bokoli malémbe ena elakisi, engebene na motindami ya papá, lizalisami mpenza ya Eklezia: "bosóló boko eye ebotami na likambo lyoko ya kobombana te, kasi na lobokó lyoko epesami na libótá lyoko na mosusu", « wápi epái moko moko akozua, akobatela pe akotika eye epesamaki na ye". "Bikeke mwambi ya lisapo bimonaki cathédrale eye kotambola elongo na bomoi ya bokristu ya engumba pe ya ekóló", elobaki ye, na botálisi boyambi boko ekoki kovanda na mituná ya eleko na yangó, na bomanyoli pe mbongwana.

Sántu Michel pe sántu Gudule, bilongi ya Eklezia yoko ya semba

Ba nsé ya ndáko ya yambo ya cathédrale Saints-Michel-et-Gudule, basántu bakónzi ya cathédrale ya Beleziki, biúti na 1226, tángo Henri II, duc ya Brabant, azuaka mokáno ya kotónga ndáko-Nzámbe yoko na esika ezali leló, ezuami na matakanelo ya ba balabala bikomema na France pe n'Allemagne. Basántu bakónzi ya cathédrale bakolakisa, na miso ya episkopo ya lokúmu, mbela moko ezali kaka sika. Sántu Michel akokundola "bokengi pe bomanyoli", nzokándé sántu Gudule akotatola "lobokó ya mokolo na mokolo". Elongo, ekobaki ye, bakoyema elongi ya Eklezia yoko ebengami ya kosangisa bosóló pe mosála, bokási pe kimia.

Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, amonaki 'te "lisapo ena atá molayi ekangi miso na eye ya kála te, kasi ekofungola yangó po ya lobi", "na bobengi ya kotála mosika ya bifelo ya cathédrale, na Bruxelles pe na lomeko (dimension) na ye ya Poto.

Bruxelles pe Poto na momekano ya bokabwani

Ezali o ntéi ya misála ya Poto, Bruxelles ekolakisa po ya episkopo ya lokúmu Parolin engumba yoko ebotami na "bokútáni pe likoki ya koyokanisa ba bokeseni". Kasi, Poto, elobaki ye ndéngé mosusu, ekoleka leló, po na ye, "eleko lyoko ya bolembu ya mozindo, esálemi na ba bobángi pe na ba bokabwani kaka po ya politiki te, kasi lokóla o káti pe bonkoko".

Po na waná, bokristu "ekopesa biyano ya tekiniki te, kasi ebimisi mitúya (valeurs), mitúya ya bato ya ntina", elobaki ye lisusu. Bokristu, ekobaki ye, "ekoloba lisusu 'te lokúmu ya moto ezali yambo ya mitúya (calculs), 'te bosémbo ekokola na bosangisi pe na bokaboli te, 'te boboto ekobotama na bondimi moninga pe ya semba ya ba bobángi te". Na botángi mbela ya sántu Yoane- Polo Il na Compostelle na 1982, episkopo ya lokúmu abengaki bôngó Poto ya "kobanga te ya komifungwama na Kristu" po ya kobima na tembe pe na bobángi.

Eklezia yoko ebengami ya kokoma epotú (insignifiante) te

Na bolobi bilongi ya Robert Schuman, Konrad Adenauer pe Alcide De Gasperi, bakeli ya boyokani ya Poto simá ya etumba, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki ntina ya kotónga lisusu kaka ba ndáko te, kasi lokóla botiyi motéma. Tembe yoko eye etáli Eklezia ya leló lokóla. Po na ye, likama ya sóló ezali ya kozala na bato moke te, kasi ya kokoma epotú. "Ezali moke ya bato te ekolembisa litatoli ya bokristu, kasi bobungisi ya bokási ya nsango-ndamu", ekebisaki ye, na bolobi lisusu 'te Eklezia ebengami ya kotikala mungwa, mwinda pe lokwéza (levain) na lisapo.

“"Eklezia ekomitia likoló ya lisapo te pe ekobulunganisa na yangó te, kasi ekoleka yangó lokóla bozali boko eye ekokende elongo, ekososola pe ekosálisa. Momeseno ya bokristu elobaka yangó na bilili ya pamba pe ya makási. Ezali ndáko po Nzámbe azali kúna. Ezali nzóto po Kristu akokoba kobika pe kosála. Ezali bato po moto andimaka ye moko te. Lokóla ba tatá balobaka yangó. Eklezia ezali esántu na likabo eye azui pe petepete na ba ndelo ya baye bazali o ntéi ya ye".”

Batisimo ya Kristu, loléngé ya bozali ya bokristu

Na boyekami na matangi ya féti ya batisimo ya Mokónzi, episkopo ya lokúmu amanyolaki na eye etáli Kristu oyo aponaka kokota na mayi ya Yordani po ya kokabola loléngé ya moto. Ekela yoko ya bomikitisi pe ya penepene eye ekolakisa loléngé lyoko: eye ya bosémbo ezui elembo ya kimia pe ya bozali eye "ekoluka na bosáli malámu". Loléngé ena, elobaki ye, etáli mbala moko baye babatisama. "Ezali bisó te baye tokotelemisa Eklezia: tozali mabángá biye Mokónzi akosálela", ebetaki ye nsete.

“"Eklezia ekokola tángo ba bokeseni bikomi bomengo boko pe bolingo ezali nsinga eye ekosimba yangó na bomoko. Na botámboli ena, botáli na bisó etelemi na Maria oyo Concile Vatican II ekomona na mobombano ya Kristu pe ya Eklezia. Na ye, Eklezia ekoyekola 'te boboti (fécondité) ebotamaka na makási ya ba ndáko te, kasi na bozali malámu na ekela ya Nzámbe, na bomonani mbala moko te, kasi na lobokó lyoko ya bokangi motéma".”

Losámbo lyoko po ya Bruxelles, Beleziki pe Poto

Po ya kosukisa, episkopo ya lokúmu Parolin atikaki na libondeli ya Maria Eklezia, engumba ya Bruxelles, Beleziki, Poto pe lisangá ya bikóló. Abimisaki elako 'te cathédrale Saints-Michel-et-Gudule etikala "ndáko yoko efungwama pe esika moko ya bomoko", ekoki kosála ba boyébi na bosémbo, na mokumba pe na elikya.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

13 sánzá ya yambo 2026, 16:03