Luka

Boyambi ya Papa François na Slovaquie na 2021 Boyambi ya Papa François na Slovaquie na 2021  (Vatican Media)

Mgr Gallagher na Slovaquie po ya mibú 25 ya boyokani na Ngwendé ya Sántu-Petelo

Úto 30 ya sánzá ya yambo kinó 1 ya sánzá ya mibalé, secrétaire po ya Boyokani na Bikóló mpe Masangá ya mokili azali na mobémbo na ekóló ena ya Poto ya ntéi mpe ya monyele. Na linaka: ba bokútáni káti ya misála ya letá, symposium na université enéne ya ekóló, botáli na Nitra mpe misa ya bosukisi na cathédrale ya mboka-mokónzi.

Vatican News

Úto mokolo ya mitáno eye 30 ya sánzá ya yambo, Mgr Paul Richard Gallagher, secrétaire po ya Boyokani na Bikóló mpe Masangá ya mokili, azali na Slovaquie po ya kokundola mibú 25 ya Boyokani ya ntina káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe ekóló ya Slovaquie. Botáli ekoleka kinó mokolo ya eyenga ya 1 ya sánzá ya mibalé.

Na linaka leló, bokútáni boko na ministre ya Makambo ya bapaya, Juraj Blanár, mpe botáli boko ya esengo na mokambi ya Ekóló, Peter Pellegrini. Mokolo ekosuka na bokútáni na ba diplomate na ndáko ya ntómá ya Papá.

Mokolo ya póso ya sánzá ya yambo, ebongisami bozali na symposium etáli Boyokani ya ntina na université Comenius, ekolandama na botáli na etuka ya Nitra. Mpe mokolo ya eyenga, bosáli misa na cathédrale Sántu-Martin, na Bratislava.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

30 sánzá ya yambo 2026, 18:45