Angelo Gugel, (na loboko ya mwasi ya papamobile); asimbi na maboko na ye Yoane-Polo II, na bobomi ya 13 ya sanza ya mitano 1981 Angelo Gugel, (na loboko ya mwasi ya papamobile); asimbi na maboko na ye Yoane-Polo II, na bobomi ya 13 ya sanza ya mitano 1981 

Liwa ya Angelo Gugel, mokengeli mokambi ya ba Papá misáto

Mokolo ya yambo 15 ya sánzá ya yambo, moto oyo azalaka o mosála ya Yoane-Polo I, Yoane-Polo II pe Benoît XVI, akataki motéma na mibú 90. Moto ya lobokó pe ya bobómbami, azalaki pembeni ya Papá Yoane-Polo II, mokolo ya bobomi ya Papá ya yambo ya Pologne, na esika Sántu-Petelo, na 13 ya sánzá ya mitáno 1981.

Osservatore Romano - Vatican News

Na bonkutu pe bobombami ndámbo yoko ya ekeke, káti na súka ya ekeke 20 pe ebándeli ya ekeke esusu, Angelo Gugel asálisaki Papá misáto lokóla mokengeli mokambi (majordome).  Akufaki mokolo ya minei 15 ya sánzá ya yambo, na Roma, na mibú 90, na bolingo ya libótá na ye. Abengamaka o ntéi ya basálisi laíki na ye na Papá Yoane-Polo I, oyo mosála ya papá esalaka mikolo 33. Azalaka motatoli ya bonkutu ya mosála molayi ya Yoane-Polo II, pembeni na mibú ntúkú-sambo, pe na bosukisi mosála na ye na mibú 70 na Papá Benoît XVI.

Mosáli ya bobómbami ya Papá misáto

Abotama na 27 ya sánzá ya inei 1935 na Miane (Trévise), alonganaka na Maria Luisa Dall'Arche úto 1964, tatá ya bána minei, Raffaella, Flaviana, Guido pe Carla Luciana Maria, Gugel azalaki moko ya bato ya súka ya kobika pembeni mpenza na ba Papá. Bakengeli bakambi bazali bôngó o ntéi ya Libotá ya papá. Ndéngé azalaka o eleko ya bokuse ya Yoane-Polo I na ngwendé ya Mokitani ya bapostolu, Angelo Gugel atatolaka na esámbi ya mwá-esengo na ye. Akei lisusu elongo na mosála molayi ya Yoane-Polo II, pe azalaki pembeni na ye o eleko ya bobomi ya 13 ya sánzá ya mitáno 1981. Asálaki lokóla o ebándeli ya mosála ya Papá Benoît XVI libosó azua epasó.

Aúta na libótá lyoko ya basáli bilanga pe na nzebi ya mibú mibále na likindo, azuaka mosála na 1955 lokóla zandáme (gendarme) na Vatican. Azuaka bokono bwa ntolo (tuberculose), sima ya bozóngeli bwa nzoto (convalescence), atindamaka na Bulamatari, kinó Yoane-Polo I, episkopo na ye ya kála na Vittorio Veneto, oyo ayebaka mama na ye pe mwási na ye, na bokomisi nganganzámbe ndeko ya mwási na ye, sángó Mario Dall'Arche, alinga ye pembeni na ye. O eleko ya Concile Vatican II, azalaka mokumbi na ye ya motuka na Roma pe aliaka kútu epái na ye.

Nzeneneke ya sémba ya bobomi ya 13 ya sánzá ya mitáno 1981

Na bolobi mibú 27 bilekaki na Yoane-Polo II, bitondi na makambo, bokutani pe mibémbo, alobaka mibémbo na mikili nionso mitáno, kasi lokóla bileko ya káti, lokóla mwá mikolo ya bopemi na Cadore to na Lobwakú (vallée) y'Aoste, eleko, atá Gugel azalaka kolongola moláto na ye po ya kolata bilamba ya ngomba. "Ezalaki sémba ya kobátela sekele ya mosála na ngai, atá o ntéi ya libótá na ngai. Tángo tobandaka kobima na Sántu-Papá po ya ye moko, atá bandeko ba ngai bazalaki koyéba yangó na ba zolonale", ebakisaki ye. Akanisaka bôngó eleko yoko yoko ya bobomi ya 13 ya sánzá ya mitáno 1981, na lidusu lisasi etikaka na Papá asembolamaka na mabelé na ekoteli ya Misála ya bokolongono ya Vatican, kinó na bokimi mbángo na lopitalo Gemelli.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

19 sánzá ya yambo 2026, 14:26