Luka

Bokutani po ya matombeli na ba ntoma Bokutani po ya matombeli na ba ntoma  (@Vatican Media)

"Kopesa na mokili bikeke ya boboto", litombeli ya batindami na Léon XIV

Bayambami na likita na Papá mokolo ya mitáno 9 ya sánzá ya yambo, o eleko ya botombelani ya momeseno ya matombeli ya mobú ya sika, batindami (ambassadeurs) baye bazali na Ngwendé ya Sántu-Petelo balobaki lisusu matondo na bangó po ya "ngonga eye ya ntina ya penepene". Batombeli 'te ekela ya Sántu-Papá ekoka "kopesa na mokili bikeke ya boboto, na bokotisi zebi ebelé ya bato na nsakola ya bondeko po ya bansó, na bokoki koloba na motéma" ya moto moko moko.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Liloba esálemaki na motomolo ya batindami, George Poulides, ntómá ya Chypre, etálaki makambo maye bilekaki na bomoi ya Eklezia pe ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, úto nsakola ya liwa ya Papá François, kinó liponami ya Léon XIV. Na bokundoli makanisi ya bileko ya súka ya Papá François, pási enéne na liwa na ye, Poulides alobaki lisusu "esengo ya molinga ya pembe pe ba ngonga ya féti na Roma, biye bibongolaki bozeli na elikya, po ya Sángó molandi ya sika ya Kristu”.

Maloba ya yambo ya Léon XIV biye bikolembisa

Na bozongi na molulu eye elekaka nsakola ya bokomi ya Papá wa Roma ya 267, motomolo ya batindami epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alobaki 'te maloba ya Léon XIV: "boboto bozala na bino. Ezali boboto ya Kristu asékwi, boboto boko bizangi mondoki pe bikobotola mondoki, ya bosáwa pe ya moléndé", "bipelisaki motéma ya ba milio ya bato, na bopesi nsango yoko ya bolembisi na bobángi pe bisusu", “na eleko eye ya tembe enéne". Waná, apesaki melesi na Sántu-Papá po "alakisaki na maloba na ye" biye, "bikolela kimia pe bokási ya mokili moko ya boyokani". "Waná ndé evandi liyoki ya mozindo ya etinda ya batindami: kosilisa bitumba na bokási ya mayéle pe na moléndé po ya bolámu ya bato bansó", elobaki ye.

Mibembo ya yambo ya Léon XIV bileko bitikali na likanisi ya bato

Ntómá ya Chypre azongelaki lisusu mibembo nionso ya yambo ya Papá na Turquie pe na Liban, na bolobi 'te "mibembo miye ya ntina ya bileko" “bitikali kála na likanisi ya bato". Na oyo etáli mobémbo na Turquie, o eleko ya bokundoli mibu 1700 ya Concile ya Nicée, motomolo ya batindami, alobaki na Papá 'te "nzelá po ya bomoko ya bakristu ezuaki eténi yoko ya lisapo, na ezuzunu (recueillement) na losámbo na kulutu ya Constantinople". Na bolobi eténi ya Liban, "mabongo na Méditerranée ezoki", akundolaki lilendisi esalemaka na Papá, ya kobotola mondoki na mitéma po ya kolongisa bosémbo pe boboto, na bozongeli liloba ya Papá Yoane-Polo Il: "Liban, koleka ekóló yoko, ezali nsango yoko!".

Litombeli na Papá po ya ekela yoko po ya bomoto

Ntómá asukisi lisikulu na ye na bosáli litombeli 'te ekela ya Papá wa Roma ekoka "kozua po ya bomoto bobóti eye ezuaka, po ya Eklezia, likanisi" ya "tatá na ye ya molimo sántu Augustin". "Se bôngó ayebaki kosangisa bwanya ya eleko na ye na Credo ya bokristu, tika 'te okoka kopesa na mokili bikeke ya boboto, na bokotisi zebi ebelé ya bato na nsakola yoko ya bondeko po ya bansó, na bokoki koloba na motéma ya mobáli moko moko pe mwási moko moko ya mabelé", elobaki motomolo.

Ntómá ya Chypre alobaki na Sántu-Papá, o kombo ya lisangá ya batindami, matombeli "ya koleka mingi pe ya moléndé koleka po ya mobú ya sika, na bolobi lisusu bopesi ya mosála na bisó po ya boboto pe ya botongi ba singa bikoki kosálisa na bosilisi bitumba na mokili".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

12 sánzá ya yambo 2026, 12:26