Luka

Cathédrale Saints-Muchel-et-Gudule ya Bruxelles Cathédrale Saints-Muchel-et-Gudule ya Bruxelles   (ANSA)

Episkopo ya lokúmu Parolin atindami na Bruxelles po ya bokundoli ya cathédrale

Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Sántu-Petelo akokitana Léon XIV na 11 ya sánzá ya yambo o eleko ya mibú 800 ya cathédrale ya Saints-Michel-et-Gudule. Milulu ebelé ya momeseno pe ya molimo bikozala mobú mobimba eye ya 2026 po ya kokúmisa molimo ya ndáko-Nzámbe ena.

Vatican News

Episkopo ya lokúmu Pietro Parolin akozala motindami ya ntina ya Papá Léon XIV na 11 ya sánzá ya yambo ekoya na Bruxelles o eleko ya bokundoli mibú 800 ya cathédrale ya etuka. Ba nsé ya ndáko ya yambo ya cathédrale Saints-Michel-et-Gudule, basántu bakónzi ya cathédrale ya Beleziki, biúti bôngó na 1226, tángo Henri II, duc ya Brabant, azuaka mokáno ya kotónga ndáko-Nzámbe moko na esika na yango leló, ezali na matakanelo ya ba nzelá bikomema na France pe n'Allemagne.

Na 11 ya sánzá ya yambo, episkopo ya lokúmu Parolin akokitana Papá wa Roma o eleko ya misa ekokambema na Mgr Luc Terlinden, episkopo ya Malines-Bruxelles, misa moko ekokambema elongo na baepiskopo ya Beleziki. Milulu bebo ya momeseno pe ya molimo bikosálema mobú eye mobimba 2026 o eleko ya bokundoli ena: konsélé, mayangani ya baí-lisapo to ba botandi (expositions) bitali lisapo ya cathédrale na káti ya bikeke, eloko ya ntina ya gothique ya Brabant.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

04 sánzá ya yambo 2026, 12:08