Luka

Episkopo ya lokumu Pietro Parolin Episkopo ya lokumu Pietro Parolin  

Episkopo ya lokúmu Parolin akobanga libosó ya pási súka te na Iran

O eleko ya misa pe bolakisi ya bitikali (reliques) ya sántu Pier Giorgio Frassati, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá akomituna boni boni, na ekóló ena ya Moyen-Orient, "ekoki kosálema ya koluka mabé libosó ya baí-mboka na yo moko". Alobi likanisi ya boyokani na Venezuela po ya koboya bosopi makila.

Vatican News

Episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Pietro Parolin, atatabani te po ya koyanola na mituná ya bapanzi nsango o eleko ya misa pe bolakisi ya bitikali ya sántu Pier Giorgio Frassati eye esálemaki sima ya nzánga, 17 ya sánzá ya yambo, na ndáko-Nzámbe Domus Mariae na Roma.

Po ya likambo ya Iran, episkopo ya lokúmu alobaki liyoki lyoko ya "botungisami enéne". "Nakomituna, elobaki ye, boni boni ekoki kosálema ya koluka mabé libosó ya baí-mboka na yo moko, boni boni ekokaki kozala na bakufi ebelé boye, ezali pási yoko ezanga súka". Yangó elikya 'te eyano yoko ya boboto ekoka kozuama na likambo yangó.

Bomeki boyokani na Venezuela

Na eye etáli Venezuela, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki lisusu bomipesi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo po ya eyano yoko ya boboto na matata. "Tomekaki kozua eyano yoko eye ekoboya botangisi ya makila, na bozui tángo mosusu boyokani boko na Maduro pe bato basusu ya bokónzi, kasi yangó esálemaki te", elobaki oyo azalaka ntómá ya Papá na Venezuela káti ya 2009 pe 2013. Episkopo ya lokúmu alobaki pósá 'te likambo ya leló ya "ntembe enéne" ekoma ya "botelemisi", bozongeli boko ya nkita, "po likambo ya nkita ezali ya sóló malongá te", pe lokóla "bokotisi démokraci na ekóló".

Boyokani na bikóló ebelé po ya koyanola na likambo ya Groenland

Po eye etáli Groenland pe bobéndani biye bikoleka na politiki ya mokili mobimba, Secrétaire ya Letá alobaki lisusu na bokási motúya ya boyokani na bikóló ebelé. "Tokoki koluka bokási lisusu te", ekebisaki ye, na bolobi lisusu molimo ya boyokani eye elakisama sima ya etumba pe eye ekomonana leló lokóla kolemba malémbe malémbe. "Koyanola bobéndani pe kolakisa maye yo olingi kaka na bokási, atá ezali ya "kondimama te", ekosála 'te bisó topúsana lisusu koleka na "etumba lyoko o ntéi ya politiki ya mokili mobimba".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

20 sánzá ya yambo 2026, 09:15