Luka

Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na Auditorium Antonianum ya Roma Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na Auditorium Antonianum ya Roma  

Episkopo ya lokúmu Parolin abiangi bilenge ya kozua matéya ya biseke na bangó

Abengamaki na bokútani boko na Auditorium Antonianum ya Roma na Botáli (Observatoire) po ya likanisi ya bonsómi, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ayanolaki na mituná ya mwá bayékoli, na bolobi lisusu bokébi ya Eklezia na makámá ya intelligence artificielle, mpe na bosakoli mokumba ya bapanzi nsango na "botéi" ya likanisi ya bato (opinion publique).

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Intelligence artificielle, libongi (qualité) mpe mokumba ya bapanzi nsango, botuti (impact) ya biseke (échecs), loléngé ya kopesa po ya boboto na mokili, waná bizalaki makambo-makonzi bilobamaki na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, na 21 ya sánzá ya yambo, na Auditorium Antonianum ya Roma, pembeni ya bána kelasi 700 ya Italie. Bána baye balakisaki baningá na bangó baye bazali na miango bitombolami na Botáli po ya likanisi ya bonsómi. Bokútáni, na kombo "Lisoló lyoko ya mokili po ya kosangisa bilenge po ya lobi", esálemaki lokóla molulu ya bosúkisi bosepeli ya bokundoli mibú 25 ya bokeli ya Botáli.

Intelligence artificielle na mosála ya moto

Na ngonga moko na ndambo, lisoló lina esalisaki bilenge ya kotuna mituná ebelé mpe ya mozindo. Ya yambo, etunamaki na Matteo Turato, mibú 18, moyekoli aúti na Gemona del Friuli, etálaki likambo ya intelligence artificielle. Episkopo ya lokúmu alobaki na yangó "nsango enéne". Ezali likambo-likonzi lyoko, eyanolaki ye, "eye ekotungisa Eklezia lokóla mpe esika wápi tokomeka kokanisa. Tokolinga kosála etuluku yoko ya likanisi o ntéi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Likabo ya Eklezia ezali lipusani lyoko ya éthique: 'te IA ezala na mosála ya lokúmu ya moto mpe ekoma likámá lyoko te".

Bopanzi nsango (presse) eye ekotéya mpe ekopesa nsango

"Bopesi nsango ya lokutá ekotámbola" mpe mokumba ya ba média bilobamaki lokóla. "Makoki ya boyebisi bato -elimbolaki ye na boyanoli na moyekoli moko ya mwási, mibú 18, Alice Pia Ziraldo- bizali na mokumba monéne: bisengeli kosuka kaka na bopesi nsango te, kasi ya kozala na likanisi lyoko mpe na litungisami ya botéi bato. Mpe sima, koboya kobimisa basusu mabé, kasi kosálisa ya kososola likanisi na bangó".

Mbémbá, balakisi ya bomoi

Arianna, ye alobaki Makambo-makonzi ya bomoi, na bomituni na botuti biye biseke bikoki kozua epái ya bilenge. "Eseke ezali o ntéi ya bomoi, elobaki episkopo ya lokúmu Parolin, ezali na ntina 'te bilenge bayeba 'te bomoi esálemi lokóla na boleki esika ena ya pási. Ezali tángo mosusu kotála bato maye bakosenga mingi na bilenge, baye bakomona 'te bakoki kosála misála na bangó te. Yangó ekoma likambo makási leló". Secrétaire ya Letá abimisaki lisusu sekele ya lipusani (approche) lyoko elamu o eleko ya eseke: "Eseke ezali eloko yoko ya koyekola káti ya bomoi. Tokoki kozua matéya na biseke na bisó mpe koyéba po na nini ya biseke na bisó", esúkisaki ye.

Komipesa na politiki ebotaka mbuma na yangó

Elenge ya lycée, Giacomo D'Elia, atunaki po ya ye motuná moko etonda na bobángi mpe na eyokeli (sens). Alobaki atungisami na bitumba ebelé na mokili. Episkopo ya lokúmu ayanolaki boye: "Bino, bilenge, bomipesa na politiki, elendisaki ye, bomona yangó lokóla eloko yoko ya kobwaka te, kasi lokóla esálelo yoko po omikotisa na mosála ya mokili. Bosengeli komona politiki lokóla esálelo yoko ya makási po ya kobongola mokili mpe lokóla eloko moko eye bokoki komipesa".

Mabongisi (médiations) ya boboto ya Ngwendé ya Sántu-Petelo

Na súka, elandaki motuná moko ekoluka na mawa elikya. Veronica Meringolo atunaki mwá ndakisa esika wapi, na lisapo ya bato, lisoló ya diplomatie ezalaki makási mpe efungolaki ya sóló nzelá ya boboto. Episkopo ya lokúmu Parolin atangaki bikela bibále ya mobongisi bisukaka na elonga bikambemaka na Ngwendé ya Sántu-Petelo. "Na mibú 80, elobaki ye, Ngwendé ya Sántu-Petelo ebengamaka po ya koyingela na likambo ya canal ya Beagle, káti y'Argentine mpe Chili, mpe Papá Yoane-Polo II andimaka mbela po ya mobongisi eye ememaka na sima na boboto. Na bobéndani ya ndelo káti na Pérou mpe Équateur, Ngwendé ya Sántu-Petelo alongaki na komema bikóló mibále na boyokani boko ya boboto", esúkisaki episkopo ya lokúmu, na bobimisi na eyano na ye boseki ya elikya mpe ya bosepeli na elongi ya elenge Veronica.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

23 sánzá ya yambo 2026, 14:05