Luka

Misa po ya molimo ya Benoit XVI Misa po ya molimo ya Benoit XVI 

Boyékoli matéya ma Nzámbe na bozindo ya Benoît XVI ezali "likabo lyoko po ya Eklezia", emoni episkopo ya lokúmu Müller

Yambo ya bokundoli mibú misáto ya liwa ya Benoît XVI, episkopo ya lokúmu Müller akambaki misa na basilique ya Vatican. Na litéya na ye, alobaki 'te Papá akufa "atika libula lyoko enene ya boyékoli matéya ma Nzámbe na bozindo (théologie) ya ntina koleka" pe po na yango azali komonana lokóla moko ya bato ya mayéle katoliko ya leló.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Cooperator veritatis, "mosáli elongo ya bosóló », ezali bôngó ndé elimbolamaka Joseph Ratzinger, mokitani ya 264 ya Petelo, oyo asukisaki bomoi na ye na mabelé na 31 ya sánzá ya zómi na mibalé 2022, na mibú 95. Yango episkopo ya lokúmu Gerhard Ludwig Müller, préfet ya kála ya Congrégation po ya matéya ya boyambi, akundolaki na misa asalaki mokolo ya mibalé 30 ya sánzá ya zómi na mibále, na lotale ya basilique ya Vatican, misa moko po ya molimo ya Benoît XVI, o eleko ya mibú misáto ya kufa na ye. O ebándeli ya misa, esálemaki elongo na ba sángó ebelé pe na mokambi ya Fondation ya Vatican Joseph Ratzinger- Benoît XVI, sángó Federico Lombardi, episkopo alobaki 'te Benoît XVI "azali moto moko ya kála te, kasi elama yoko ya Nzoto ya Kristu ya bomoi, oyo azali moko na likoló pe na mabelé" pe atindeli likanisi lyoko na Léon XIV. "Lokola Papá Benoît XVI, ye azali mpe kozua na libula ya molimo pe ya boyékoli matéya ma Nzámbe na bozindo ya moteyi monéne ya Eklezia sántu Augustin, elobaki ye. Yango wana bango nionso mibalé batié Yézu-Kristu o ntéi ya boyambi ya Eklezia, nzoto ya Kristu, in illo uno unum sumus".

Kaka na mosála ya Liloba ya Nzámbe

Na litéya na ye, episkopo ya lokúmu azongelaki bomoi ya papá Benoît XVI oyo, lokola moteyi ya boyekoli matéya ma Nzámbe na bozindo pe motéyi, "amitiaki tángo inso na mosála ya Liloba". Lokóla préfet ya Congrégation po ya matéya ya boyambi, alakisaki "molende moko makási" pe "polélé na mayéle", pe lokóla papá, "azalaka moko ya monene na baye bayékola matéya ma Nzámbe na bozindo" na ngwendé ya Petelo. "Atikela biso libula moko linéne ya motuya koleka pe andimamaki loléngé elongobani lokola moko ya bato minene ya mayéle katoliko ya eleko na biso", elobaki episkopo ya lokúmu Müller.

Mosála mobimba

Po ya préfet ya kála ya Congrégation po ya matéya ya boyambi, boyekoli matéya ma Nzámbe na bozindo ya Benoît XVI, "ezali likabo lyoko po ya Eklezia mobimba" pe "po ya baye bakokitana biso". Mosála na ye mobimba, mwángo moko ya ba volume zómi na motoba ya makasa 25 000, etindami po ya baye bazali "na ba mbano ya molimo, ya boyekoli matéya ma Nzámbe na bozindo, ya philosophie pe bongo na bongo" to baye balingi kokolisa boyébi na bango ya mobú ya milulu pe nsámbo ya bakristu na misa to ya Concile Vatican II.

Bokristu, bokutani na moto moko: Yézu

Na suka, episkopo ya lokúmu Müller alobaki eye Benoît XVI azongelaka mbala na mbala, ezali 'te "bokristu, na misála na ye nionso ya minene ya mayéle na botéyi ya bato, miziki pe ntoki, nkoma ya bonzenga (littérature) pe ya philosophie, ezali bilobela te, kasi bokutani boko na moto moko", Yézu, oyo "azali bosóló", "mwinda ekongengisa moto moko moko". Se bongo Eklezia "ezali bobongisi boko ekelami na moto te na linaka lyoko po ya bato ya monene", kasi lisangá ya bayékoli ya Kristu, baye bakosakola na mokili bamonaki nkembo na ye, "lokóla eye ya Mwána mobáli se moko aúti epái ya Tatá, atondi na ngrásya pe na bosóló", bayékoli káti na bango ezali lokola Joseph Ratzinger, moyekoli ya matéya ma Nzámbe na bozindo, episkopo, episkopo ya lokúmu pe Papá.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

07 sánzá ya yambo 2026, 09:04