"Bolingo eleki liwa na makasi": episkopo ya lokúmu Koch akopesa lokúmu na Benoît XVI
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Na bolobi lisusu 'te Benoît XVI akufaki na 31 ya sánzá ya zómi na mibalé, mokolo ya súka ya mobú, episkopo ya lokúmu Koch alobaki kilo ya Nsango-Ndamu esakolamaki mokolo ena, Ebandeli ya sántu Yoane: "O libandela Liloba azalaki, Liloba azalaki bango na Nzámbe, pe Liloba azalaki Nzámbe" (Yn 1,1).
"Ekomonana lokóla kitoko koleka pe ekopasola motéma", elobaki ye, "'te boyambi ya mokristu ekopesa etinda ya libandeli mobimba ya sika", na bolobi lisusu 'te suka ya bomoi na mabelé "ezali súka te, kasi libandeli ya sika", bokoti na bomoi ya seko epái ya Nzámbe, "pe 'te mokolo ya súka ya bomoi na mabelé ya moto ezali libandeli ya bomoi ya sika, ya bomoi ya seko na Nzámbe".
Liwa, pótá ya bolingo ya moto
Episkopo ya lokúmu Koch alobaki lisusu bonene ya mobombano ya liwa, na bolobi 'te ekitisami te na likambo lyokó ya biolozi (biologie). "Liwa ekopasola lokóla singa ya boyokani nionso ya bato, na bobébisi bôngó elaka insó pe elikya nionso", elobaki ye lisusu, na botángi Benoît XVI ye moko: "Liwa ezali tángo inso bobébisi ya bolingo moko, ya bolingi boko, pe penza likambo ya mawa na zebi ya liwa".
Liwa ekomonana lokola "esika ya bomitiki mobimba pe ya bompenza (solitude) ezanga ndelo, na ndéngé 'te, na esika eye, boyokani ya bato ezali ya kokufa, lokóla bolingo ya moto". Kasi ezali penza waná, elobaki episkopo ya lokúmu, ndé elikya ya mokristu efungwami, "kasi, na esika eye, ezali penza bolingo ya Nzámbe, pe kaka bolingo na ye, eye ekoki kopesa bokei ya sika".
Tángo bolingo ya Nzámbe ekoti na bokónzi ya liwa
Episkopo ya lokúmu Koch alobaki 'te, kaka bosóló boko ekumbi kombo ya "bolingo" ekoki kopesa biso ebándeli ya sika ena. Na botángi bomanyoli boko ya Benoît XVI libosó ya Sántu Suaire ya Turin, akundolaki elaka ya káti eye ya boyambi: "na bokónzi ya liwa, mongongo ya Nzámbe ebimi. Eye ekoki kokanisama te esálemi: Bolingo ekotaki na lifelo".
Mobombano eye, ekokisama na Kristu mokolo ya Póso esántu, ekokoma ya sika na liwa ya mondimi moko moko: "lokóla Kristu akotaki na bokónzi ya liwa pe, na móto ya bolingo na ye, apesaki botámboli na bokási ya liwa, se bôngó leló, akomema bolingo na ye na liwa ya moto pe ekokata bompenza ya liwa na bokotisi bosangani ya sika, bosangani na Nzámbe ye mei".
Bomoi bwa seko, mbuma ya bolingo ya Nzámbe
O ntei ya likanisi ya Benoît XVI, episkopo ya lokúmu Koch alakisi likanisi lyoko ya ntina: "bomoi ya seko ezali likambo ya bolingo ya Nzámbe po ya biso. Bosóló ena ezali na ya zebi ya sóló eye moto akosala na bolingo". Bolingo ya moto, elimbolaki ye, ekoluka kaka eye ezanga ndelo, kasi ekoki ye moko kolonga liwa te. "Mokanisi ya ekóló ya France Gabriel Marcel alobaka yango na sembo: kolinga moto moko, ezali koloba na ye 'te akokufa te".
Koluka elongi ya Nzámbe úta bomoi eye
Po ya Benoît XVI, bomoi ya seko ekobánda kaka sima ya liwa te, "bomoi ya seko ezali bomoi ya sóló, eye ekobanda kaka sima ya liwa te, kasi eye, po ya mondimi, ekobánda na bomoi ya leló". Episkopo ya lokúmu Koch alobaki lisusu 'te bomoi mobimba ya Joseph Ratzinger ezalaka bosenga boko ya elongi ya Mokónzi. "Soki bomoi ya seko ezali bosangani na Nzámbe, esengeli komibongisa úta bomoi na biso na mabelé, lokóla Joseph Ratzinger asalaka bomoi na ye mobimba".
"Luka tángo inso elongi na ye", Benoît XVI alingaka kozongela, azalaka na kondima 'te Nzámbe "azali kaka sika" pe Akomitika baluka ye na kotambola moko "ya ndelo te ya bobómboli (découverte) ya sika pe ya esengo ya sika".
Batísimo, monoko ya bomoi ya seko
Na súka, episkopo ya lokúmu Koch asangisaki elikya ena na bosóló ya batisimo, abengaki yango "libandeli ya sóló ya bomoi ya seko". Na batísimo, elimbolaki ye, moto ya kála akufi po ya kobotama na Kristu na bomoi ya sika: "Ezali ngai te nakobika, kasi Kristu akobika na ngai". Ndelo ya sóló káti ya liwa pe bomoi "ezali na liwa ya biolozi te, kasi na batísimo", eye ekotisi mondimi na bosangani ya seko na Nzámbe.
Na bosukisi misa, episkopo ya lokúmu Koch atikaki Joseph Ratzinger, Benoît XVI na mawa ya Nzámbe, na bolobi lisusu 'te motéma ya mobombano ya mokristu ekumbami na Ukaristya: "bomoi ekolonga liwa, po bolingo ya seko ya Nzámbe eleki liwa na makasi. Amen".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye