Luka

Molulu ya bokangi Ekuke Esantu ya basilique Saint-Paul-hors-les-Murs. Molulu ya bokangi Ekuke Esantu ya basilique Saint-Paul-hors-les-Murs.  (@VATICAN MEDIA)

Bokangi ya Ekuke Esántu ya basilique Saint-Paul-hors-les-Murs

Ekambemi na episkopo ya lokúmu James Michael Harvey, molulu ya bokangi esálemaki mokolo ya minei 15 ya sánzá ya yambo, libosó ya molakisi ya ba misa ya Papá, episkopo Diego Giovanni Ravelli. Nsámbo bimataki po ya bato ya mobémbo mwa boyambi baye, o eleko ya Mobú Esántu, balekaki Ekuke Esántu, zambi ya kobátela boyambi makási ya sántu Polo, elikya eye epesaka mawa te.

Vatican News

Molulu ya bokangi Ekuke Esántu ya basilique ya Papá Saint-Paul-hors-les-Murs, elekami ba sánzá bileki na ba milio ya bato ya mobémbo mwa boyambi esálemaki na pokwa ya mokolo ya minei 15 ya sánzá ya yambo. Episkopo ya lokúmu James Michael Harvey akambaki molulu ememamaki na mosáleli ya Papá Mgr Ján Dubina, libosó ya molakisi ya ba misa ya Papá, episkopo Diego Giovanni Ravelli.

Bazalaki waná lokóla sángó Donato Ogliari pe Mgr Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère ya Bopalanganyi Nsango-Ndamu. Na losámbo ya mokuse ya ebándeli, episkopo ya lokúmu Harvey asambelaki po ya bato ya mobémbo mwa boyambi baye, o eleko ya Mobú Esántu, balekaki Ekuke Esántu zambi ya kobátela boyambi makási ya sántu Polo, elikya eye epesaka mawa te, libonza eye ekotikala ya seko.

Molulu

Basáli ya bulamatari ya Letá ya Vatican batongaki ekuke na biliki o ntéi ya basilique po ya kokanga Ekuke Esántu. Sandúku ya moke na bronze esálemaki po ya likambo yangó, ekotisamaki na káti ya efelo. Biloko ya ntina ya Papá François oyo afungolaka Zúbile ya 2025, pe ya Papá Léon XIV oyo asukisi yangó, bikomami kúna.

Na sandúku ya moke, batiaki linzanza ezalaki na parchemin ekolakisa bofúngoli pe bokangemi ya Ekuke Esántu ya basilique Sántu-Polo, ezuaki mokoloto ya bato basusu bazalaki waná. Fungola ya Ekuke Esántu, etiamaki na saki yoko ya moke, ekotaki lokóla na sandúku ya moke.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

17 sánzá ya yambo 2026, 13:19