Luka

Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na lopitalo Bambino Gesù Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na lopitalo Bambino Gesù  (copyright Ospedale Pediatrico Bambino Gesù)

Episkopo ya lokúmu Parolin: "Kristu akobotama tángo inso tokoyamba bána mike"

Na botali lopitalo ya bána ya Bambino Gesù na Roma, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Sántu-Petelo akutanaki na bána bazali na lopitalo, mabota na bangó pe minganga. Na chapelle ya lopitalo, apesaki ba mbote pe matombeli (vœux) ya Papá Léon XIV, alobaki ntina ya kosangisa "bolámu bopusi ya lisálisi pe pembeni na bato".

Vatican News

"Lopitalo eye ezali eye ya Mbótama, kaka po ekumbi kombo ya Mwána Yézu (Bambino Gesù), kasi lokóla po Yézu akobotama tángo inso tokoyamba bána mike". Episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, alobaki bôngó na basáli, bakoni pe mabota na bangó o eleko ya botáli na ye, mokolo ya yambo 23 ya sánzá ya zómi na mibalé, na lopitalo Bambino Gesù. Na chapelle ya lopitalo, Secrétaire ya Leta apesaki "ba mbote ya Papá pe matombeli na ye", na libakú ya eleko yoko ya ezuzumi (recueillement) akabolaki na minganga, mafulume (infirmiers), bána bazali na lopitalo, bandeko na bangó pe basáli ya Nzámbe.

Bokutani na bakoni ya mosála ya mompúlúlú

Na bokomi na ye kúna, episkopo ya lokúmu Parolin ayambamaki na mokambi ya lopitalo, Tiziano Onesti, duchesse Maria Grazia Salviati pe bakambi basusu ya lopitalo. Akendeki lisusu na mosála ya mompúlúlú, epái wápi azuaki ngonga ya kopesa mbote na bakoni ya bilenge pe mabota na bangó.

Bolámu bopusi ya lisálisi pe lomeko lya bomoto

Botáli esukaki na chapelle ya lopitalo, epái wápi batindami ya minganga, ya bakoni pe mabota na bango, bilama ya eyangelo ya lopitalo pe Fondation Bambino Gesù, na lisangá ya basáli ya Nzámbe.

Engebene na momeseno, episkopo ya lokúmu alobaki matombeli na ye ya Mbótama na lisangá nionso ya lopitalo. "Napesi bansó mbote, pe na nzelá na bino, lopitalo nionso: basáli, bilama ya eyangelo, basáli ya Nzámbe. Nayambi binó na bolingo", esakolaki ye. Na bolobi bokútáni na moboti moko o eleko ya botáli na ye na mosála, episkopo ya lokúmu alobaki maloba maye: "Alobi na ngai: "ndambo ya libiki, ezali lisálisi, pe ndambo mosusu, ezali nzinganzinga ya libota, penepene pe bolingo". Waná motombeli po ya Bambino Gesù: kaka po ya bolámu bopusi ya lisálisi te, kasi lokóla lomeko ya bomoto".

Episkopo ya lokúmu atangaki ngongi Giovanni Papini, oyo azalaka komituna na mbotama ya Kristu na motéma ya moto: "Mokolo eye okomema esengo to okokitisa pási ya moto moko, semelle, po mokolo ena Mobikisi abotami na motéma na yo". "Tokoki koloba kaka eloko moko áwa, na Bambino Gesù", esúkisaki Secrétaire ya Leta. "Tángo inso okosalisa bána pe mabota, tángo inso okosala mosála ya mokolo na mokolo, Yézu akobotama lisusu".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 13:42