Ngondo ya Elikya ya  San Marco di Castellabate Ngondo ya Elikya ya San Marco di Castellabate 

Ekeko ya Ngondo ya Elikya, úto Cilento kinó basilique Sántu-Petelo

Eúti na paloise ya San Marco di Castellabate, na engúmba ya Salerne (Sudi ya Italie), ekeko ena ya nzeté etiamaki penepene na lotále ya Ntúbela na basilique ya Vatican. Ekotikala waná po ya ba féti ya Mbótama kinó na Bomimonisi.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Zúbile ya Elikya esili na botáli ya Ngondo Maria. Na basilique Sántu-Petelo, misa nionso ya Mbótama bikosálema libosó ya ekeko ya nzeté ya Ngondo ya Elikya, ememyamaka na paloise Sántu-Malako-Mopanzi-ya-Nsango-Ndamu na San Marco di Castellabate, na engumba ya Salerne (Sudi ya Italie). Elili, eye ekomemama na Vatican mokolo ya yambo ekoya, 22 ya sánzá ya zómi na mibále, ekotiama pembeni na lotále ya Ntúbela pe ekozonga na paloise simá ya 6 ya sánzá ya liboso, mokolo ya Bomimonisi ya Mokónzi.

Ngondo ena, alakisami na mwána na maboko na ye, asimbi na lobóko na ye ya mobáli lóngo lyókó ya wolo etelemi malámu na mabelé. Ngondo ekokundola eye ebátelama na sanctuaire ya Santa Maria della Speranza na Battipaglia, na engúmba ya Salerne, ememama na Vatican o eleko ya bofúngoli ya Zúbile, na súka ya 2024. Eye ya San Marco di Castellabate ezali ya sika koleka, esálemaki na Labô Stuflesser na 1954 po ya kokanisa Mobú ya Maria esakolamaka na Papá Pie XII. Na bokomi na ye, eyambamaka na ba ndáko ya mabótá ya mboka, simá etiamaki na ndáko-Nzámbe. "Madone ya Elikya" ezongisamaki ya sika o eleko ya Zúbile pe bozongisi na esika na ye na ebándeli ya Mobú esántu.

Madone mókó alingami na bato ya lói (vacanciers)

Ekeko ena na molayi ya metele 1,45 ekosenga libondeli linéne. Elingami makási na bato ya esika waná, kasi lokóla na bato ya mobémbo (touristes) baye bayaka ebelé na San Marco, esika lyokó ya Castellabate eye ezali na bato pembeni ya 1300. Féti ya Mwá Esengo Ngondo Maria ya Elikya esálemaka na eyenga ya súka ya sánzá ya mwambi pe ezali kaka féti epesama na Madone ya Elikya na dioceze ya Vallo della Lucania. O eleko ya losámbo ya mikolo misáto eye ebonzama po na ye, bakokumba libosó na molongó elili ya Maria elakisami na etanda yókó ya ekeke ya 19, eye epesa likanisi ya bosáli ekeko na ba mibú 50, simá ekeko yangó mókó ekomaki kinó na libongo, epái wápi basáli losámbo ya botiki na Maria basumúki ya mboka.

O káti ya nzinganzinga

Ngondo ya Elikya eúti na nzinganzinga, na mboka ezali káti ya lobálá (parc) ya ekóló ya Cilento pe Vallo del Diano. Etúká lyokó bato bazali kosila, epái wápi misála ya ntina bizali mpenza te. Eleki mobú mókó, Don Pasquale Gargione, na ntángo waná sángó-mokónzi ya San Marco Evangelista, apesaka likanisi ya komema Madone na Vatican po ya kolakisa bosóló ya masangá ebelé ya bisika bikangama epái wápi bomókó (solitude), epái wápi bato bakokoma mibange, epái wápi kokeseni ezali kokola. Maria akumbi mokumba ena ya ba pási, kasi akomi lokóla elili yókó ya elikya po ya ba "bána" baye bakozua lilendisi pe bolingo na bobateli ya mama.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 09:39