Bosúkisi Zúbile na Roma, mikolo ya bokangi Bikuke Bisántu
Vatican News
Ekuke Esántu ya basilique Sainte-Marie-Majeure ekozala ya libosó ekangama po ya Zúbile 2025. Molúlú ekosálema mokolo ya Mbótama na ngonga ya 17 na episkopo ya lokúmu ya basilique Libère, Rolandas Makrickas. Ekolandama, mokolo ya póso 27 ya sánzá ya zómi na mibále, na bokangi Ekuke Esántu ya basilique Sántu-Yoane-ya-Latran. Molúlú ebongisami na ngonga ya 11 pe ekokambema na episkopo ya lokúmu Baldo Reina. Mokolo elandi, eyenga ya 28 ya sánzá ya zómi na mibále, episkopo ya lokúmu ya basilique Sántu-Polo-libanda-ya-Bifelo, James Michael Harvey, akokamba molúlú ya bokangi Ekuke Esántu.
Molúlú na Sainte-Marie-Majeure
Efungwamaki mokolo ya yambo na sánzá ya yambo 2025, Ekuke Esántu ya basilique Libère emoni koleka ya bato ya mobémbo mwa boyambi pe bandimi koleka milio ntúkú mibále. Mokolo ya bokangi eponamaki bongo bongo te: Sainte-Marie-Majeure ezali basilique ya Sántu Mbótama (Saint Noël), mobáteli ya bitika (reliques) ya Sántu Mbeto ya mwána (Saint Berceau) esika wápi Mwána Yézu abotami. Molúlú ekobánda na loyémbo ya ba vêpres ya mibále, simá, na ngonga ya 18, molúlú ya bokangi Ekuke Esántu, elongo na eleli (son) ya Sperduta, ngonga ya kála ya basilique. Zambi ya kosálisa bobongisi ya milúlú, basilique ekokanga bizibeli na yangó na bato na ngonga ya 15 mokolo ya 25 ya sánzá ya zómi na mibále. Bokoti ekozonga lisusu na ngonga ya 16 pe ekondingisama, na esúkeli ya bisika bizali, kaka po ya bozali na milúlú bibongami. Bolakisi na yangó ekosálema na etando eke ya monéne ekotiama na esika ya Sainte-Marie-Majeure, po ya baye bakozala libanda.
Milúlú na Sántu-Yoane-ya-Latran pe Sántu-Polo-libanda-ya-Bifelo
Molúlú ya bokangi Ekuke Esántu ya basilique Sántu-Yoane-ya-Latran ekolandama na misa móķó ekoyembama na lisangá ya bayémbi ya dioceze ya Roma, ekambemi na Mgr Marco Frisina. Na eleko ya Mobú esántu, Ekuke Esántu ya Sántu-Yoane-ya-Latran elekamaki na bandimi ya ba paloise ebelé ya Roma: masangá ya ba paloise, bangó mókó to bibongisami na préfecture, baponaki ya kosála Zúbile na bangó na cathédrale ya Roma. Bandimi bakokoka kokota na basilique na lokasa lyokó ya ofele, úto ngonga ya 8 kinó eye ya 10. Na bokangi ya Ekuke Esántu ya basilique ya Papá Sántu-Polo-libanda-ya-Bifelo, okoki kozala kúna na bonsómi na lokasa te.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.