Luka

Moko ya bitando binene bikolakisa bilili pe maloba ya Papa Moko ya bitando binene bikolakisa bilili pe maloba ya Papa 

Bilili pe maloba ya Papá bikongengisa etuka ya Roma

Úto mikolo ebelé, bilili pe maloba ya Léon XIV bikoleka na bitando binene na nzinganzinga ya Vatican. Ezali likanisi lyoko po ya biyenga ya Mbótama ematisami na Ngwendé ya Sántu-Petelo na Selfiestreet kinó na 31 ya sánzá ya zómi na mibalé.

Vatican News

Bizali bilakisi (publicités) bitiama langi po ya mibembo te, kasi biténi ya ba vidéo ya Internet ya minene biye bikokoma na bifelo ya ba ndáko o ntéi ya Roma. Ya mbala oyo, nsango eye, úto mwá mikolo, epanzani na bato pe engengisi ba butu ya Piazza Risorgimento, libosó ya boyingeli na ba Musée ya Vatican, ezali eye ya Léon XIV, na bilili pe makanisi bizuami na masikulu na ye biye bikoloba ba féti pe bikobenga na elikya.

Nsango ya boboto pe ya bondeko

Ezali Ngwendé ya Sántu-Petelo ndé ematisi likambo liye na eleko ya Mbótama na ba média na ye, na bosáli elongo na Selfiestreet, na lisálisi ya bitando binene bitiami na bisika pembeni ya Vatican. Ezali mingi, na botámboli na biténi ya etuka, ya komona bato kotelema, motó etelemi, po ya kotánga na mwá bokamwi, pe atá bopaswami motéma, maloba bibwakami na bilili ya Papá bizuami kati ya bandimi pe bato ya mobémbo mwa boyambi ya Zúbile.

Na ba réseaux sociaux lokóla, bilakisami pe bokaboli bitali likanisi lina ebongisami kinó 31 ya sánzá ya zómi na mibalé bikokoba kobakisama. "Bozali ya liloba ya Sántu-Papá na esika ya bato -tokoki kotánga na mokánda moko- ezali na káti ya eleko ya Mbótama lokóla elembo moko ya penepene na molimo pe bozongeli boko ya mitúya ya boboto, ya elikya pe ya bondeko".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

30 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 11:20