Ukraine: kopima ba civil lokúmu na bangó ezali "lifingá lyoko ya Nzambe"
Vatican News
Na Ukraine, "eloko yoko te ekolingisa kotinda na makási ba civil ebelé ya kobika na molili pe na malili. Toyóki pási koleka na ba nsango bikoloba ba mobúlú na bisika ya lotiliki pe biye ya ba civil maye bikomisi bomoi ya bato ebelé pási lisusu koleka", esakolaki mokolo ya minei 20 ya sánzá ya zómi na yoko Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, o eleko ya misa ya milimo mawa, pembeni na bato milio 5 bayokaki pási na Holodomor, ba nzala biye bibongisamaki na bokónzi ya URSS na ntángo ya Staline káti ya 1932 pe 1933.
Bantóma koleka 50, na mwá 80 ya batindami bazali na Roma, bazalaki na misa. Likambo lya mikolo miye emibengaki na ndáko-Nzámbe Sant'Andrea della Valle.
Libosó ya ba diplomate, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki 'te "likambo nionso eye ekopima ba civil likoki ya kobika na lokúmu ezali lifinga lyoko ya bomoto pe lotuká lyoko na Nzámbe". Ayoki mawa ya baye bakokufa mokolo na mokolo pe amonaki, lokóla Papá Léon XIV mokolo ya mibále na pokwa, 'te esengeli "kobeta nsete po ya kozua boboto", na bobandi yambo na botiyi bozimi-moto yoko, eye ekosunga ya kobánda lisoló lyoko.
Masoló pe boyokani
Secrétaire ya Letá atunamaki na bapanzi nsango simá ya misa alobaki lisusu likambo ya etumba ekoleka na Russie, na bolimboli mwángo ya boboto ya matónó 28 ebongisamaki na mokónzi y'Amerika Donald Trump. Elikya ya episkopo ya lokúmu ezali 'te "ba nzelá ya lisoló biye bikosálisa po kosilisa pási ena bifungwama", na bozali miso polele na monéne ya mosála ya kosála. "Ekozala pási ya kozua boyokani káti na mitindo epái yoko pe masengá epái esusu. Nakanisi 'te nzelá ya masoló ekozala na mabaku", elimbolaki Secrétaire ya Letá. Amoni 'te "Poto esengelaki kozala pe koyokisa mongóngó na ye, pe kotikala libanda te" ya masoló, mingi mpenza po "kinó sik’oyo amipesi makási" po ya Ukraine. Po ya likambo ya bopesi ba mboka, "ezali nanu ngonga" ya koloba yangó te, "mingi mpenza po 'te waná ekozala mbuma ya masoló". Boboto, elobaki ye, ekokoka kaka soki biténi mibále basepeli na boyokani, zambi na súka, esengeli kozua boyokani.
Bomipesi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo
Na mansó, Ngwendé ya Sántu-Petelo emipesi na bozongisi epái na epái bakangemi pe bozongi ya bána ya Ukraine bamemaka na Russie. "Tokokoba komipesa na likambo ena, nakomona 'te mosála etáli bána ezongisamaki ya sika", elobaki Mgr Parolin. "Tobongami po kosálisa na esika waná, po tokomona - koleka likebi ekopesama na bato bazali na pási.- 'te yangó ekosálisa lokóla ya kobongisa mitindo milongobami po ya boboto".
Holodomor, nsomo ebotami na boyini pe mabé ya bokónzi
Na litéya na ye, episkopo ya lokúmu Parolin azongelaki pási ya Holodomor, eye elongolaka bomoi ya ba milio ya mibáli, ya bási pe ya bána. "Ezali mokili te ndé ebotaki nsomo ena, kasi boyini, bozangi sémbo, bokini pe mabé (abus) ya bokónzi", elobaki ye. Kasi, na mobú eye ya Zúbile, Ngwendé ya Sántu-Petelo elingi kozala mokumbi ya elikya "po ya baye banyokwamaki lobi, po ya baye bakoyoka pási leló, po ya bato bakoluka boboto, bonsómi pe lobi lyoko ya kimia". Yangó waná leló, "bato ya Ukraine bazui bilembo ya ba pótá ya lisapo pe ya pási ya etumba eye ekokoba, tobengami koyika mpiko na losámbo pe ya kotatola boyambi boko eye ekobunda, eye ekolikia, eye ekozela na kimia, kasi lokóla bokási yoko, libiki lya Mokónzi".
Secrétaire ya Letá asúkisaki litéya na ye na botiki na mawa ya seko ya Nzámbe ya bomoi "bansó bazuaki likámá ya nzala, ya boyini pe ya mobúlú", na bobondeli "na bomikitisi pe botiyi motéma 'te ntóngóntóngó ya boboto, boboto mókó ya semba pe ya seko, ekoka sik’oyo kotelema na Ukraine".
Bilenge minei babimisaki bangó bazalaki na misa
Na súka ya misa, ntómá ya Ukraine epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Andrii Yurash, apesaki matondo na episkopo ya lokúmu Parolin pe alobaki bozali na Sant'Andrea della Valle ya bilenge minei ya mibú 14 kinó 18, baye bamemaka bangó na Russie o ebándeli ya etumba pe baye bazongisaki bangó na mabótá na bangó. Alakisaki lokóla bási basáto bavandaki káti ya bato bazalaki, na bobengi bangó "bilombe bási ya boboyi pe ya lokúmu": balakisi, elobaki ye, "makási mókó pe moléndé mókó ya kokámwisa". Na súka ya misa, exposition ya ntoki "Losámbo po ya Ukraine" efúngolamaki pe miziki ebetamaki.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye