Bozui maloba ya episkopo ya lokumu Pietro Parolin na COP30 Bozui maloba ya episkopo ya lokumu Pietro Parolin na COP30  

Na COP30, Ngwendé ya Sántu-Petelo emipesi po ya kotómbola botéyi likambo ya nzinganzinga mobimba

Simá ya botangi nsakola ya Papá na bato bazali na COP30 na Belém, episkopo ya lokúmu Parolin azalaki na mesa ya lisoló mokolo ya mitáno 7 ya sánzá ya zómi na yoko na likambo etáli mibú zomi ya Boyokani (Accord) ya Paris. Ngwendé ya Sántu-Petelo elobaki ntina ya botéyi ya likambo ya nzinganzinga mobimba po ya kokóma na miye mibongisama na boyokani ena ya mokili mobimba, na lokóla lisengeli ya koyanola na eye etáli niongo ya likambo ya nzinganzinga epái ya bikóló bizangi makoki koleka.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Mibú zómi simá bondimi Boyokani ya Paris, esika wápi biténi 196 bandimaka kotia mikáno po ya kokanga botokisi (rechauffement) ya klima esuka na 1,5⁰c na loléngé ya libosó ya bobimi ya ba izini, bakambi ya mokili basangani na mayangani na Belém na 6 pe 7 ya sánzá ya zómi na yoko, batalaki boni boni makambo makokende. Nzelá ya bokokisi mikáno mibongisamaka na boyokani ya mokili mobimba na eye etáli bokitisi pe bomeseni na botokisi ya klima etikali molayi pe mindondo, emonaki Papá na nsakola na ye po ya baye bazali na COP30 pe etangamaki na Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo o eleko ya bokútáni ya bakónzi ya bikóló pe ya bulamatari na tóngo ya 7 ya sánzá ya zómi na yoko.

"Tokoki te kondima mibú misusu zómi ya bozangisi mabaku", elobaki na lisikulu lisusu episkopo ya lokúmu Pietro Parolin na bokútáni na bakambi ya bikóló, ekambemaki na mokónzi ya Brésil Luiz Inácio Lula da Silva, na nkombo "Mibú 10 ya Boyokani ya Paris: CDN pe bopesi mosolo". Úta bokoti na bokási ya Boyokani ya Paris, Bikóló bitiaka maboko bisengeli kozongela simá ya mibú mitáno CDN na bangó, lokasa ebongisa misála bakosála ya sóló po ya bokitisi bobimi ya gaz à effet de serre. Bôngó na Belém, basengeli kopesa bomipesi esusu ya bangó ya klima po ya 2035. Eleki mibú mitáno, o eleko ya bokútáni ya ONU etáli botokisi ya klima, Papá François alobaki mokáno ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya kondima mayéle moko ya bokitisi bobimi na libúngútulú leló kinó 2050.

Kotéya likambo ya nzinganzinga mobimba

Episkopo ya lokúmu Parolin atiaki o ntei ya bozui na ye ya maloba na ntina botáli moko "mobimba" na nzelá ya bosáleli Boyokani ya Paris: "ezali kaka na ntina ya nzinganzinga, économie pe politiki te, kasi likambo ya sóló ya bato pe eye ya bolámu, zambi ekotuta mingi mpenza bomoi ya babóla koleka pe baye bazali na makoki te". Po na waná, motindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na COP30 abeti nsete na ntina linéne ya botéyi, "yoko ya bisalelo ya ntina biye bikobongisa boyoki na bisó na eye ezali bolámu, pe eye ezali bolámu, na ngonga ya ye, ekolakisa ba pósá pe mayéle ya botéyi". Botéyi na likambo ya nzinganzinga mobimba ya bato ya sik’oyo pe ya baye bakoya ekosálisa ya kobánda mbongwana yoko ya bonkoko: "mikáno ya politiki pe ya tekiniki bisengeli bisangana na nzelá ya botéyi eye ekosunga loléngé lyoko ya bonkoko ya botómboli pe ya bowúmeli ebongisami na bondeko pe boyangeli na limemya Bokeli". Bôngó, elobi Parolin, "ezali na ntina 'te eténi ya botéyi esála mosála ya malonga koleka na mikanda bipesami na Bikóló, lokóla ba CDN pe ba nsakola ya ekóló yoko yoko, lokóla na masoló bitáli Klima, na káti waná masoló ya mosolo".

“"Na loléngé ya sika ena ya bonkoko esengeli ekoka koleka momeseno ya boboi eye elati bisó pe ekotungisa mokili nionso, na bokitanisi momeseno moko ya bosálisi: bosálisi ya yo mei, bosálisi ya basusu pe bosálisi ya nzinganzinga"”

Niongo ya likambo ya nzinganzinga

Na loléngé ena ya sika ya bonkoko elingami na Ngwendé ya Sántu-Petelo, eye ekosálisa ya koleka momeseno ya boboi na momeseno ya bosálisi, episkopo ya lokúmu Parolin abeti nsete na ntina ya bondimi niongo ya likambo ya nzinganzinga. "Ekobenga na likabo te, kasi na bondimi ya kosembola mbéba ya bokelami pe ya koleka bimekoli ya botómboli ya seko te". Ngwendé ya Sántu-Petelo "ebongami po ya kosálisa nzela yangó, na boyébi 'te na nsé ya Tatá ya bisó bansó, tokosála libotá lyoko pe kaka waná ya bato: ndelo ezali te na lokóla bikangeli, ya politiki to ya bato, simá esika nini tokoki kobombana", esúkisaki episkopo ya lokúmu.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

11 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 10:56