Luka

Baepiskopo y'Allemagne Baepiskopo y'Allemagne 

Curie ya Roma pe baepiskopo y’Allemagne bazosála po ya "mayangani ya synode"

Na "ndéngé mókó ya sóló, ya kofúngwama pe ya kotónga", engebene na communiqué yoko ya lisanga ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe ya Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne, batálaki matónó (points) loléngé na loléngé ya mobéko eye ekoya simá ya esalelo lyoko ya synode ya Eklezia n’Allemagne. Likita ya súka ekosálema na sánzá ya motóbá ya 2026.

Vatican News

Batindami ya Curie ya Roma pe ya Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne basanganaki mokolo ya misáto 12 ya sánzá ya zómi na yoko, po ya kokoba lisoló bayokanaka o eleko ya botáli ad limina ya baepiskopo y'Allemagne na sánzá ya zómi na yoko 2022. Waná ndéngé elobi communiqué mókó ya lisanga ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne. Makita milekaki misálemaki na 26 ya sánzá ya sambo 2023, 22 ya sánzá ya misáto 2024 pe 28 ya sánzá ya motóbá 2024.

Lisoló eleki mbala mókó lisusu na ndéngé yoko ya sóló, kofúngwama pe ya kotónga. Matónó loléngé na loléngé ya mobéko eye ekoya ya esalelo yoko ya synode ya Eklezia n'Allemagne (ebéngami "Liyangani ya synode") bitálemaki, lokóla lizalisami (nature) na yangó, bosáli (composition) na yangó pe makoki na yangó.

Curie ya Roma etálisamaki na baepiskopo ya lokúmu Victor Fernandéz, Kurt Koch, Pietro Parolin pe Arthur Roche, na pe episkopo Filippo Iannone. Epái ya Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne baye bazalaki: Georg Bätzing, Bertram Meier, Franz-Josef Overbeck, na secretaire générale, Beate Gilles, pe molobeli ya Lisangá, Matthias Kopp. Mgr Stefan Oster azalaki lokóla mobéngami.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

14 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 09:17