Zúbile ya Molimo ya Maria, bato 30 000 na Roma
Vatican News
Mokolo ya póso 11 pe eye ya eyenga 12 ya sánzá ya zómi ekosálema na Roma Zúbile ya Molimo ya Maria (spiritualité mariale). Koleka bato 30 000 ya mobémbo mwa boyambi bakozala waná: ba recteur, bakambi ya ba sanctuaire, na lokóla bilama ya masangá, pe bituluku ndéngé na ndéngé ya dévotion na Maria. Monkáma ya bikóló bikozala na Zúbile, káti na bangó Arabie saoudite.
Notre-Dame ya Fatima na Roma
Na mikolo mibále ya Zúbile, ekeko ya Notre-Dame ya Fatima ekozala kaka po na yangó na Roma. Molúlú ya zúbile ekobánda mokolo ya póso 11 ya sánzá ya zómi, na misa ekokambama na recteur ya sanctuaire ya Fatima, sángó Carlos Cabecinhas, na ngonga ya 9 na ndako-Nzámbe Santa Maria in Traspontina, esika wápi, úto ngonga ya 8 na ndambo, bandimi bakokoka komemye elili ya Ngondo. Na simá, na midi, bolobi ya sapelé ekosálema.
Na simá ya midi, na ngonga ya 17, ekeko ekomemama na molongó úto Santa Maria in Traspontina kinó epái ya esika ya Sántu-Petelo. Elili, na eténi ya yambo ya molongó kinó na esika ya Sántu-Petelo, ekomemama na bilama ya Lisangá Basántu Petelo pe Polo.
Mbala mókó tángo kémbi (cortège) ekokóta na esika, "fercolo" "char mókó" ekobátelama na ba Gardes suisses ya Papá pe Corps ya gendarmerie ya Vatican kinó bokómi na yangó na basilique Sántu-Petelo. Molongó ekoleka esika po ya kosálisa bandimi kokúmisa ekeko pe ekoleka libosó ya esika balingaka koboma Papá Yoane-Polo II. Lisangá lya bayémbi ya Roma ekoyémba na eleko ena ba nzémbo na lokúmu ya Ngondo Maria.
Lokúmu ya Papá na Ngondo
Na ngonga ya 18, na póso, likita lya bútu ya losámbo ekobánda na esika Sántu-Petelo na bolobi ya sapelé, elingami na Papá po ya kosénga likabo ya boboto. O ebándeli ya eleko ya losámbo, Papá wa Roma, na elembo ya dévotion, akopesa na Notre-Dame ya Fatima pe na sanctuaire lóza ya wólo, eye esálemaki po ya eleko eye na lingómbá "Diego Serpone" ya Naples.
Na mbuma mókó mókó ya zómi ya sapelé ekokende elongó na litangi ya esika mókó ya mokako ya 8 ya Lumen Gentium, mokánda ya concile eye ekoloba mosála ya Mwa Esengo Ngondo Maria na mobombano ya Kristu pe Eklezia, zambi ya bokundoli bofúngoli ya Concile Vatican II, na 11 ya sánzá ya zómi 1962. Na simá, eleko mókó ya bokúmisi eucharistie ekozala, po ya kosénga likabo ya boboto. Mokolo ya eyenga 12 ya sánzá ya zómi, bato ya mobémbo mwa boyambi bakozala na misa na esika ya Sántu-Petelo, na ngonga ya 12 na ndambo, ekokambama na Léon XIV.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló eye.