Zúbile ya ba Gitan, Rom to Sinti: bato ya mobémbo mwa boyambi baúti na bikóló 70 bazelami
Vatican News
Na Roma, Zúbile epesami po ya ba Gitan, Rom, Sinti pe bato misusu batámbolaka ekozua mikolo mibále, mikolo ya póso 18 pe ya eyenga 19 ya sánzá ya zómi, na lináka bileko ya matatoli pe ya losámbo mizali. Pembeni na bato 4.000 ya mobémbo mwa boyambi, baúti na bikóló 70 ya Pótó pe ya mokili mobimba, bakozala kúna. Waná ekomami na communiqué mókó ya dicastère po ya Mosála ya botómboli moto mobimba eye ebongisi milúlú elongó na "Fondation Migrantes" ya lisangá ya baepiskopo ya Italie, Communauté ya Sant'Egidio, vicariat ya dioceze ya Roma pe batindami ya Pastorale ya ba Rom pe ba Sinti.
"Elikya etámbolaka"
Na ngonga ya zómi, mokolo ya póso 18 ya sánzá ya zómi, bato ya mobémbo mwa boyambi bakosangana na ndáko ya makita Polo VI po ya bokútáni mókó ebéngami: "Elikya etámbolaka, tatá na ngai pe mama na ngai bazalaka ba Araméen batámboli".
Bokútáni na Léon XIV
Bai-ntóki baúti Italie, Roumanie, France, Espagne pe Slovénie bakokitána na scène. Bokútáni na Papá ekolandama na masoló misusu na episkopo ya lokúmu Fabio Baggio, secrétaire molandi ya dicastère ya Mosála ya botómboli moto mobimba, pe na Mgr Gian Carlo Perego, mokambi ya Fondation Migrantes, baye bakokamba mwá bileko ya losámbo. Molúlú ekosúka na mobémbo mwa boyambi na Ekúke Esántu ya basilique Sántu-Petelo, káti ya ba ngonga 14 pe 18.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló eye