Episkopo ya lokumu Parolin na liyangani ya0 IA Episkopo ya lokumu Parolin na liyangani ya0 IA  

Ngwendé ya Sántu-Petelo elingi Intelligence artificielle (IA) esálisa monganga, ekitana ye te

Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo apesaki lectio magistralis mókó mokolo ya misáto 15 ya sánzá ya zómi na Etéyelo enéne ya bokólóngónó bwa nzóto ya Roma, o eleko ya bofúngoli etéyelo mókó etáli Intelligence artificielle (IA) eye banganga-mayéle baponami na Vatican bakosála kúna. Na bozui maloba, episkopo ya lokúmu Parolin alingaki ‘te “lokúmu ya moto eleka libosó ya motángo nionso”.

 

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Matómba pe makámá mikangemi na bosáleli Intelligence artificielle na likambo ya bokólóngónó bwa nzóto misálaki likanisi ya episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, oyo alobaki mokolo ya misáto 15 ya sánzá ya zómi, na etéyelo enéne ya Roma o eleko ya bofúngoli etéyelo mókó ya Intelligence artificielle. Lectio magistralis mókó etáli "Mobéko (éthique) ya Intelligence artificielle", epái wápi episkopo ya lokúmu alobaki 'te IA ezali "ndelo mókó etóndi na bilaka", kasi lokóla "matakánelo mókó" ekokonza boponi káti ya technologie mókó etindami po bokási mókó "eleki moto” eye "ekosúka na kotiya pembeni baye balemba", to IA mókó epelisami na "mobéko" pe "na mosála" ya mobimba ya moto mókó mókó.

"Ngwendé ya Sántu-Petelo, lobokó na etindá na ye, ekokoba kosála, na lisoló na mibáli bansó pe bási bansó ya motéma molámu, po 'te technologie etikala eye ekoki kozala: kaka súka mókó ya likambo te, kasi nzelá mókó makási po ya kotónga mokili mókó ya sémbo koleka, ya bondeko koleka pe ya bomoto koleka", esémbolaki episkopo ya lokúmu. Likambo-likonzi ya IA elimboli leló pe ekobongisa lobi, ekobaki ye. Akotúna moto na lokúmu na ye 'te "masini mókó ekokoka kobimisa to kokitana".

 IA, likoki mókó enéne na mosála ya bokólóngónó bwa nzóto

Bosáleli IA na mosála ya bokólóngónó bwa nzóto ekoki penza komema lisúngi mókó ya ntina. "Tokanisa, esakolaki episkopo ya lokúmu, na botángi ya ba radiographie na botáli elamu koleka eye ya liso ya moto; na likoki ya kozua bakisi ya sika to komeka bosálisi bokono na loléngé elongobami; na bomátisi likoló bobateli ya makoki ya lopitalo po ya bokóti na sémbo koleka na lisálisi na bisika bobola ezali makási na mokili". Tálá boni boni Ngwendé ya Sántu-Petelo elingi 'te IA esálema, lokóla esaleli mókó makási na mosála ya bomoi, moningá mókó ya moto na etumba libosó ya bokono pe ya pási, esakolaki Secrétaire ya Letá.

Bobangi mókó ya bokabwani ya bokólóngónó

Pembeni ya minda, esengeli koyéba bililingi. Po ya episkopo ya lokúmu Parolin, bobangi ya yambo ezali eye ya "bolongoli bomoto na lisálisi", bolimwi ya boyokani ya lisálisi káti na monganga pe mokoni, eye ezali kaka bokaboli basango te kasi lokóla bondeko ya botiyi motéma káti na bato mibále. "Algorithme mókó ekoki kopesa diagnostic mókó, kasi ekoki kopesa liloba mókó ya bolendisi te", elobaki ye. Po na ye, "tozali na lotómo ya kobunda po 'te technologie etikala esalelo mókó ya lisálisi ya mokáno ya monganga, kasi mokitani na ye na bomoto te".

Motéma ya eye ezali malámu

Eklezia, eye ekolinga na "bosimi pe bokébi" ya bobuti ya nzebi pe ya technologie, ekomipesa bôngó na nzelá ya bosololi "káti ya ba scientifique, éthicien, philosophe, théologien pe bakambi ya politiki, po ya kotónga elongó lobi mókó esika wápi bokeli ezala synonyme ya bobuti ya sóló ya moto".

 Matondi na ndéngé otángi lisoló eye

 

17 sánzá ya zómi 2025, 09:04