Mgr Gabriele Caccia Mgr Gabriele Caccia 

Ngwendé ya Sántu-Petelo ebéngi ya kotika likanisi ya bokengi esálema na mindóki

Na bozui maloba na ONU na eye etáli mindóki miye mindimama, Mgr Gabriele Caccia, motáli ya eleko nionso ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU, azongelaki likambo ya bobimisi mosolo po ya mampinga na mokili eye, mobú moleki, ekómaki na motúya mókó eleki 2,7 billions ya dollar.

Vatican News

"Botóndani ekokoba pe bosáleli mabé ya mindóki miye mindimama mizali libakú mókó enéne po ya boboto pe ya botiyi motéma na boyokani na mokili. Na esika ya botómboli botémi (stabilité), bopanzi yangó mabé ekokólisa bozángi bondimi, ekoléisa mobúlú pe ekobébisa lisoló káti ya bikóló", esakolaki Mgr Gabriele Caccia, motáli ya eleko nionso ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU o eleko ya bosololi na likambo-likonzi etáli mindóki miye mindimama, na eténi ya 80 ya bokútáni ya bansó (Assemblée générale) ya ONU, na New York.

Bobimisi mosolo po ya mampinga: 2,7 billions ya dollar na 2024

Mgr Caccia alobaki 'te bobimisi mosolo po ya mampinga ezuaki "bobakisi ya kokámwa", na bokómi mobú moleki motúya ya sómo ya 2,7 billions ya dollar. Azongelaki lisusu maloba ya Papá Léon XIV: "Boni boni tokoki kokoba koteka pósá ya boboto ya bato ya mokili na bolobi epái nionso na eye etáli bobakisi ya mindóki, lokóla soki boleki ya mindóki ekopesa eyano na makambo na esika ya kokolisa likunia mókó pe pósá ya bozongisi mabé makási lisusu koleka?".

Na esika ya kosálisa ba pósá ya ntina ya bato pe bomátisi moto mobimba, ebakisaki ye, "makoki miye bikokolisa ba mwángo ya bobangisi pe ya bokabwani miye mikobébisa boluki ya boboto". "Ezali na lombango lokóla kosúkisa bosáleli ya mindóki mipanzanaka, na káti waná ba munitions à fragmentation, na bisika bato bazali ebelé. Bosáleli ya ba explosif na bisika bato bazali ebelé ezali kosála mosála miso ya kokúfa, lokóla bobúki bitéyelo, ba lopitalo pe bisika ya losámbo".

Mabomi bikúfa miso pe miúmelaka

Po ya Mgr Caccia, bobéndani ya sika ya Convention ya Ottawa na ba mine antipersonnel ezali likambo mókó ya motungisi makási. "Mindóki miye, elobaki ye, mikopesa mabomi bikúfa miso pe miúmelaka na bato, na masangá pe na nzinganzinga, na botiki libula mókó ya liwa ngonga ebelé simá ya súka ya bitumba".

"Likambo 'te mindóki mibétama na boyébi te, na moto nionso, mingi mpenza ba civil bayébi likambo te, mibongami te na mibéko ya bato pe na likoki ya mokili. Kaka motungisi waná ekosálema na ba loléngé nionso ya mindóki miye mikosála na botáli te na bokambi ya moto ya ntina".

Po na yangó, Mgr Caccia amilobi andimi 'te "mikáno ya bomoi to ya liwa misengeli mipesama na ba masini te". Na yangó, Ngwendé ya Sántu-Petelo ekolendisa makási mbela ya secretaire général po "ya bofúngoli masoló ya kosúkisa, kinó mobú ekoya, esáleli mókó ya mobéko mikopekisa mindóki ya bobomi yangó mókó. Na káti waná, Bikóló binsó basengeli koboya kotómbola yangó to kosálela yangó", elobaki ye.

Bomipesi mókó ekokoba ezali na ntina po ya kosilisa mombóngo ya mindóki

Engebene na Mgr Caccia, "mombóngo ya mabé ya mindóki ya pepele pe ya calibre ya moke esálema lokóla na lombango". Botóndani ezanga mobéko ya mindóki miangó, elimbolaki ye, ekokoba "koboma káti ya baye bazangi makoki, mingi mpenza bána, baye bazali kokótisa bangó na makási na bituluku ya babomi to ya bato ya mobúlú, bapimi bangó bomango pe boyékoli, pe bapimi bangó lobi". Waná lilendisi ya  Ngwendé ya Sántu-Petelo na mokili mobimba "ya kotika likanisi ya bokengi esálema na mindóki pe ya komipesa tángo insó ya kotónga boboto mókó esálema na lisoló, sémbo pe lokúmu ya bomoi mobimba ya moto. Ezali, esúkisaki Mgr Caccia, mosála mókó ya ntina eye ekosénga bomipesi mókó ezali kokoba".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye

26 sánzá ya zómi 2025, 13:36