Luka

 Féti ya bato batindami pe ba migrant ya elikya pe ya boboto Féti ya bato batindami pe ba migrant ya elikya pe ya boboto 

Féti ya bato "batindami pe ba migrant ya elikya pe ya boboto"

Na bilanga ya Château Saint-Ange, simá ya midi mókó ya miziki, ya matátoli pe ya mabina esúkisaki Zubile ya mokili ya batindami pe ya ba migrant, mokolo ya eyenga 5 ya sánzá ya zómi. Episkopo ya lokúmu Czerny abengaki po ya "kosámbela po ya bozui esengo ya motindami pe elikya ya migrant". Episkopo ya lokúmu Tagle alobaki po ya ye 'te "migration ezali tángo insó mobémbo mókó mwa boyambi ya motindami".

Vatican News

"Losámbo na bisó leló ezali ya kozua mpiko pe esengo ya motindami, kasi lokóla bompikiliki pe elikya ya migrant, zambi ya komema Yézu na mokili na bisó eye ezali na pósá na ye. Po tozala bansó batindami pe ba migrant ya elikya pe ya boboto". Ezali bôngó nde episkopo ya lokúmu Czerny, préfet ya dicastère po ya Mosála ya botómboli moto mobimba, abándisaki "feti ya bato" eye, simá ya midi ya 5 ya sánzá ya zómi, na bilanga ya Château Saint-Ange, esúkisaki Zubile ya mokili ya batindami pe eye ya ba migrant. Simá na ye, episkopo ya lokúmu Luis Antonio Tagle, pro-préfet ya dicastère ya Bopanzi nsango ndamu, abengaki migration "mobémbo mwa boyambi ya motindami”.

Ba migrant bansó batika esika ya bangó po ya kosála etindá mókó, po ya bolamu ya libótá na bangó. Lokóla ba migrant bakristu, elimbolaki episkopo ya lokúmu Tagle, "tozali penza bakumbi ya Nsango Ndamu. Likambo yango ekosálisa bisó tángo mosusu ya koloba na malembe Nsango Ndamu, pe ya koloba bôngó na bansó 'te Nzámbe alingi bisó, 'te tozali bána na ye ya mibáli pe ya bási. Na koseka na biso, na litátoli na bisó, tokoloba na malembe Nsango Ndamu".

Simá ya midi mókó ya miziki, ya matátoli pe ya mabina

Féti ya bato, na likambo-likónzi “Migrant pe batindami ya elikya káti na bato”, ebongisamaki na etuluku mókó ezali na makambo loléngé na loléngé ya katoliko miye mikosála na pe po ya ba migrant, ba réfugié pe mokili ya motindami, pe ekomátisama na ba dicastère ya Mosála po ya botómboli moto mobimba pe po ya Bopanzi nsango ndamu.  

Ezalaki simá ya midi mókó ya miziki, ya matátoli pe ya mabina na ba migrant, batindami pe bayémi (artistes) baúti mokili mobimba, káti na bangó, ndakisa, lisangá ya ba indiens ya latin ya Roma, etuluku ya bilenge ya lisangá ya Philippines, ba Sorirang ya Corée, International Migrants School ya Roma… po ya féti esangisaki eye ya sóló ya ba migrant pe ya mokili ya motindami, liloba ya Eklezia mókó ekoyamba pe ekozinga ekópi. Úto ngonga ya 15 kinó 19, na bilanga ya Château Saint-Ange, bomemi molulu epesamaki na maboko ya bato ya bikólo misáto: Italie, Afghanistan pe Inde.   

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

07 sánzá ya zómi 2025, 07:46