2025.06.17 Vescovi della CEI 2025.06.17 Vescovi della CEI  (@Vatican Media)

Papá akoyamba ba episkopo ya sika 192 bazali kolanda matéya na Vatican

Likita ya ba episkopo ya sika na Papá ekosálema mokolo ya minei ya 11 ya sánzá ya libwá na ndáko ya makita ya Synode. Litéya ya dicastère ya Bopanzi Nsango Ndamu ebandaki mokolo ya minei ya 4 ya sánzá ya libwá elekaki pe ba episkopo ya sika 78 balandaki yangó. Litéya ebongisami na dicastère ya ba Episkopo ekosálema úto mokolo ya misáto ya 3 ya sánzá ya libwá pe bato 114 bazalaki waná. Balekaki elongó Ezibeli Esántu mokolo ya póso ya 6 ya sánza ya libwá.

Vatican News

Tongo ya mokolo ya minei ya 11 ya sánzá ya libwá, na ndáko ya makita ya Synode, Léon XIV akoyamba na Vatican ba episkopo 182 bawuti na mikili (continents) mitáno baye, útó mokolo ya misáto ya 3 ya sánzá ya libwá, balandaki matéya bibongisamaki na dicastère ya Bopanzi Nsango Ndamu pe eye ya ba Episkopo.

Litéya po ya mosála ya mobateli

Litéya ebongisami na dicastère po ya ba Episkopo ebengami “Ba nzeneneke pe basakoli ya elikya etáli Kristu” ebandaki mokolo ya misáto ya 3 ya sánzá ya libwá pe ekosúka mokolo ya minei ya 11 ya sánzá ya libwá. Litéya ekoleka na ndáko ya makita ya Synode na Vatican pe etáli ba episkopo baponamaki na mobú elekaki. Litéya ezali na molongó mókó ya bokútáni na makambo-makonzi bikoki kozala na ntina po ya mosála ya mobateli, ya kokamba pe po ya likanisi ya ye mókó pe ya lisangá na diocèse ye awuti. Matéya bizali kopesama na ba kulutu ya Curie ya Roùa pe bato basusu ya eklezia pe ya eklezia te.  

Mokolo ya póso ya 6 ya sánzá ya libwá, ba episkopo balekaki o Ezibeli Esántu, bazalaki o misa ya zubilé pe bamemiaki biloko bitikala y’Apostolu na basilique Sántu-Petelo. Bangó bansó bazalaki mokolo ya eyenga o misa ya bokómisi sántu ba esengo Pier Giorgio Frassati pe Carlos Acutis.

Mikolo bikabolami

Baye bazalaki na matéya mibále bakabolaki mwá mikolo elongó. Eye ya 6 ya sánzá ya libwá, na boleki na Ezibeli Esántu na basilique Sántu-Petelo. Pe biye ya 8 pe 9 ya sánzá ya libwá, bayambamaki na Université ya Papá Urbanienne. Mikolo bisúkaki na likanisi ya secrétaie ya Leta ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin na eye etáli « Mosála ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na mokili po ya elikya pe kimia ».  

Eleko mókó ya bokútáni pe ya bokólisi

Penza penza, ba episkopo 78 bakomami na litéya ya dicastère po ya Bopanzi Nsango Ndamu, kasi basusu 114 bazali kolanda litéya ebongisami na dicastère po ya ba Episkopo. Káti na baye ya súka bizali lokóla ba episkopo 5 ya ba Eklezia katoliko ya monyele pe ba episkopo 5 bakulaki kala mingi te bazali na misála o ntei ya Curie ya Roma. Matéya po ya ba episkopo ya sika bikómi bôngó eleko mókó ya bokútáni ya momeseno na linaka ya misála ya Curie ya Roma po ya sánzá ya libwá.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

12 sánzá ya libwa 2025, 08:30