Ndako-Nzambe moko na Chine Ndako-Nzambe moko na Chine  (AFP or licensors)

Mgr Ma Yan'en avandisami lokóla episkopo molandi ya Zhangjiakou

Mokolo ya mitáno ya 12 ya sánzá ya libwá esálemaki bondimami ya letá pe bozui mosála lokóla episkopo molandi. Ezali “mbuma ya lisoló káti Ngwendé ya Sántu-Petelo pe bakambi ya Chine”, elobaki mokónzi ya Ndáko ya bapanzi nsango ya Vatican, Matteo Bruni.

Vatican News

Mwángo ya dioceze ya sika ya Zhangjiakou, ekelama na Léon XIV mokolo ya 8 ya sánzá ya sambo elekaki na bosangisi bitúká ya ba dioceze mibále misúsu, eye ya Xiwanzi pe eye ya Xuanhua, ekobongisama lisusu. Mokolo ya mitáno ya 12 ya sánzá ya libwá, Ndáko ya bapanzi nsango ya Vatican esakolaki ‘te “na eye etáli lisoló po ya bosáleli boyokani ya komeka káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo pe ekóló ya Chine populaire”, “bondimami ya letá pe bozui ya esika” ya Mgr Giuseppe Ma Yan'en lokóla episkopo molandi ya Zhangjiakou bisálemaki.

Episkopo, ya mibú 65, episkopo ya kála ya Xiwanzi -oyo akosalisa Mgr Giuseppe Wang Zhengu, abonzamaki eleki mikolo mibále lokóla episkopo ya yambo ya Zhangjiakou- abótama na 1960 na Baoding. Akúlaka bonganga Nzámbe na 1985 po ya préfecture ya Yixian, epái wápi azalaka na esika ya vicaire général. Akómaki episkopo na sánzá ya yambo 2010, na simá akómaki na 2013 episkopo ya Xiwanzi, esika eye azuaki mokúmba mokolo ya 28 ya sánzá ya misáto elandaki.

Toyóki na esengo ‘te leló, o eleko ya bozui mokúmba” ya esika ya episkopo molandi ya Zhangjiakou na Mgr Giuseppe Ma Yan'en, “mosála na ye ya episkopo endimami pe na letá”, elobaki Matteo Bruni, mokónzi ya Ndáko ya bapanzi nsango ya Vatican, na communiqué mókó. O eleko ena, tokoki kotánga na lokásá, “lokúmu ya episkopo” ya Mgr Agostino Cui Tai, episkopo atika kála ya Xuanhua, “endimami lokóla na letá”. “Makambo maye, mbuma ya lisoló káti ya Ngwendé ya Sántu Petelo pe bakambi ya Chine, bizali eténi mókó ya ntina na nzelá ya lisangá ya dioceze ya sika”, elobaki mokónzi ya Ndáko ya bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu Petelo.   

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

13 sánzá ya libwa 2025, 11:51