Liwá ya Mgr Novatus Rugambwa, ntómá ya Papá ya Tanzanie
Vatican News
Abótama na Bukoka, na Tanzanie, 8 ya sánzá ya zómi, simá ya koyékola théologie pe bokúli bonganga na 1986, Mgr Novatus Rugambwa akotaki na mosála ya diplomatie ya Ngwendé ya Sántu- Petelo na 1991. O eleko ya etinda na ye, asálaki na ba ndako ya bantómá mwa mingi na mokili -n'Amerika ya latin, n'Afrika, n'Asia pe na Océanie- kinó boponami na ye na Benoît XVI, na 2010, lokóla episkopo pe ntómá n'Angola pe na Sao Tomé-et-Príncipe. Na simá Papá François atindaki ye lokóla motindami na ye na Honduras. Na 2019, aponamaki ntómá na Nouvelle-Zélande pe motindami ya Papá na Océan Pacifique, na simá, na ba sánzá milandaki, ntómá ya Papá na Fidji, na Palau, na bisanga Marshall, na Kiribati, na Nauru, na ba Tonga, na ba Samoa, na bisanga Cook pe na Bikóló misangana ya Micronésie. Avc ebetaki ye na sánzá ya zómi 2023, atikaki Nouvelle-Zélande na sánzá ya misáto 2024 po ya bokobi komisalisa na Roma. Akotaki na lopitalo Gemelli úto eleko ena, episkopo ya Tanzanie, ya mibú 67, akúfaki mokolo ya mibale 16 ya sánzá ya libwá na pokwa.
Azalaki kopesa ngonga pe bokébi epai ya masangá ya mboka
Na moko moko ya misala na ye, Mgr Rugambwa akesenisaki na ngonga azalaki kopesa na lisolo pe bokebi na ye epai ya masanga ya mbóka, mingi penza na ba migrant, babóla pe bakangemi. Na sánzá ya mitáno ya 2019, bulamatari ya Honduras epesaki ye Kúrúse-Enéne na monzóto ya paláta ya Ordre ya Francisco Morazán, na bondimi lisalisi na ye na bato. O eleko ya mibú mitáno na ye n'Angola pe Sao Tomé-et-Príncipe, Mgr Rugambwa akesenisaki na lisálisi na ye po ya bolendisi masoló ya katoliko, lisungi na ye na botongi biloko ya eklezia simá ya etumba, na bomipesi makási na lisoló na oyo etali démokratie, kimia pe bomoko ya ekolo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.