Luka

Papa Léon XIV na mokonzi ya batindami ya Vietnam Papa Léon XIV na mokonzi ya batindami ya Vietnam   (@Vatican Media)

Likita lya 12 ya etuluku ya mosála káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo na Vietnam esili

O eleko ya masoló, likambo-likonzi ya boyokani káti na biténi mibále pe loléngé ya Eklezia katoliko na Vietnam milobamaki, engebene na communiqué mókó ya bangó mibále. « Bopesi ya lisangá katoliko » na botómboli ya ekóló, « na elembo ya botátoli ya nsango ndamu pe bomipesi na likambo ya letá », endimamaki lokóla.

Vatican News

Likita lya 12 ya etuluku ya mosála kati na Vietnam pe Ngwendé ya Sántu-Petelo esálemaki mokolo ya mitáno 12 ya sánzá ya libwá, na Vatican. Engebene na communiqué po ya bapanzi nsango, likita ekambemaki na Mgr Miroslaw Wachoski, secrétaire molandi ya makambo mitáli Boyokani na Bikóló, mokónzi ya batindami ya Ngwendé ya Sántu- Petelo, pe na Le Thi Thu Hang, ministre molandi ya Makambo ya Bapaya pe mokambi ya batindami ya Vietnam. “O eleko ya masoló”, elobi monkanda, biténi mibále batálaki likambo ya boyokani na bangó pe loléngé ya Eklezia katoliko na Vietnam. « Bopesi ya lisangá katoliko na botómboli ya ekóló, na elembo ya botátoli ya nsango ndamu pe bomipesi na likambo ya letá », endimamaki lokóla.

Bosepeli na maye misálemi

Epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe epái ya Vietnam “babimisaki bosepeli na bangó po na maye misálemi” simá ya likita ya 11, eye esálemaka na sánzá ya mitáno 2024 na Hanoï, mboka mokónzi ya Vietnam, “na bókundoli bokobi ya lisoló, bipái nionso mibále pe misála ya motindami ya Papá na Hanoï, episkopo Marek Zalewski”.

Batindami mibále “balobaki pósá na bangó ya kotómbola mingi boyokani na ba bokútáni ya sika” pe bayokani lokóla “kokoba makita ya etuluku ya mosála káti na bangó”. Misála milekaki malamu.

Makita na Papá na ba secrétaire ya Letá

Na mobémbo na bangó na Vatican, batindami ya Vietnam bayambamaki na Papá Léon XIV. Bakutanaki lisusu na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, secrétaire ya Letá, pe na Mgr Paul Gallagher, secrétaire ya Boyokani na Bikóló pe masangá ya mokili.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

14 sánzá ya libwa 2025, 12:39