Congrès ya mibále ya bikóló na botéyi ya mibangé ekofúngwama na 2 ya sánzá ya zómi
Vatican News
« Babangé na bino bakozua ba ndóto”, ezali likambo-likonzi ya Congrès ya mibále ya bikóló etáli botéyi ya mikóló, ebongisami na dicastère po ya ba Laïki, Libótá pe Bomoí, eye ekosálema úto 2 kinó 4 ya sánzá ya zómi 2025 na Curie générale ya Compagnie ya Yézu ya Roma. Likambo-likonzi ya congrès, likanisi epesami na proféta Joël, atángamaki mbala ebelé na Papá François, ekobianga ya kokanisa po ya ba « ndóto ya babangé» lokóla liziba ya bopesi likanisi po ya Eklezia pe bato. Batindami 150 bakoúta na bikóló 65, na bolakisi masangá 55 ya baepiskopo, na bilama ya mayangani pe ba congrégation ya biyamba baye bamipesi na botéyi ya mikóló bakozala na likita ena.
Babangé, leló pe lobi ya Eklezia
« Na mokili mókó ezali kobongwana, esika wapi atá loléngé ya kokóma mokóló ezui bobongolami mókó ya bozindo », elimboli dicastère mobongisi, congrès ekoluka koyanola na «pósá mókó ya mbangu koleka: komátisa botéyi mókó ya mibangé elongobani na mikakatano ya eleko na bisó». Mibangé bazali kaka lobi eleki ya Eklezia te, elobaki episkopo ya lokúmu préfet Kevin Farrell, «kasi leló na ye pe lobi na ye. Congrès ena ezali eleko ya koyóka, kokanisa pe kotónga elongó biyano ya sika na mituná ya sika».
Nzelá mókó ebándaki na congrès ya yambo na 2020
Nzelá mókó ekokoba, po congrès ebongisami na bokobi ya bokútáni ya yambo ya bikóló na 2020, ebéngamaki « nkita ya mibú ». Úta waná, nzelá ekátama te: lingómbá ya Mokolo ya mokili ya bakoko pe ya babangé na 2021 pe molongó ya malongi ya Papá François etáli kimobangé na 2022 bilendisaki bokébi ya Eklezia epayi ya bato ya mobú ena. Congrès ya mibále ya bikóló ekolakisa eténi ya sika na nzelá ena, po ya boluki kokolisa likanisi pe koyéba ba nzelá ya sika po ya lobi.
Babangé basusu bakokabola loléngé bazali komóna na makambo-likonzi ya makási lokóla kimia, bomoi na lisangá, bokaboli boyambi pe bobateli ya ndáko ya bisó bansó. « Mikozala matatoli ya ntina, miye mikoki kolakisa ‘te ba ndóto bizali na mobú te pe mikoki lisusu kolakisa nzelá na ba génération ya sika », elobaki lisusu dicastère.
Likanisi mókó esálema nanu te
Mgr Dario Gervasi, secrétaire molandi ya dicastère, alimboli ‘te, “congrès eye elingi ezala laboratoire mókó ya makanisi pe ya elikya, eleko mókó ya kotónga ndéngé mókó ya komóna lisangá eye ekokótisa biténi binsó ya mokili. Mibangé bazali o ntei ya masangá na bisó, pe lisálisi na bangó ezali na ntina po ya lobi ya Eklezia”.
Linaka ya congrès
Linaka ebongisi bileko ya bokanisi lya bato bansó, misála na bituluku ya lokótá, na bisika mibongisami po ya lisoló pe po ya bokaboli maye basála to bamóna, na káti waná babangé bangó mókó. Misála mikobánda na tóngo ya 2 ya sánzá ya zómi na liloba ya ebándeli ya préfet, episkopo ya lokúmu Kevin Farrell, makambo misusu bikolanda. Na tóngo ya 3 ya sánzá ya zómi, likita mókó na Papá Léon XIV ebongisami, kasi bosúkisi ya misála mipesami na secrétaire molandi ya dicastère, Mgr Dario Gervasi, na súka ya tóngo ya 4 ya sánzá ya zómi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo