Luka

Carlo Acutis Carlo Acutis  (ANSA)

Carlo Acutis, ndakisa mókó ya bakatoliko te, engebene na momemi ya bokómisi ye mosántu

Momemi ya likambo ya kokómisa elenge sántu, Nicola Gori, alobi yambo ya bokómisi sántu elenge mobáli: bansó bakomóna na ye moningá mókó oyo okoki komipesa. Lokúmu na ye ya bosántu ezali likoló ya mimeseno pe ya bato.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Bato ya Nzámbe basosoli ‘te Carlo azali penza nzeneneke ya sóló”.  Momemi ya likambo ya bokómisi sántu elenge mwá esengo, Nicola Gori, alobi bôngó likambo ya bosántu eye ekokende elongó úto ba mibú ebelé na lisoló ya Carlo Acutis. Likambo mókó epanzani mokili mobimba pe bokómisi ye sántu na mokolo ya eyenga ya 7 ya sánzá ya libwá, ekambamaki na Léon XIV, emátisi kobánda sik’oyo likoló makási. “Simá ya nzelá mókó ya botáli pe ya momekano, Eklezia emóni na ye ndakisa mókó ya bosántu ya mokili mobimba”, elimboli Nicola Gori, oyo azongeli biténi ya tina ya nzela eye ekokamwisa.

Nsango-ndamu ekotámbola na internet

Tembe atá mókó te, mayele na ye ya informatique ekangemi na molimo ya baye bayebi ye”, elakisi Gori, oyo akúndoli ‘te na bwanyá na ye Carlo asálelaki ba tekiniki ya sika po ya kobimisa Nsango-Ndamu. Nzókandé ezali mingi bomikitisi pe kipolélé na ye bikosála makási na ye. Eloko mókó esáli ‘te moto nionso amimóna na Carlo. Ezali bôngó nde ba ndelo ya dévotion na Maria bipanzani na mokili mobimba: úto b’Amerika kinó n’Asia, Chine ezali na káti waná -kinó n’Afrika pe na Australie. “Lokúmu ya bosántu ya Carlo -elobi Nicola Gori- ezali makási na mokili mobimba yangó eleki ba Eklezia ya bikóló, kasi lokóla bikóló biye ba katoliko bazali mingi te, na bokómi na biténi binsó ya bato. Ba sángó, mabóta, babangé: bansó bakomóna na ye ndakisa mókó pe moningá mókó ya komipesa po na kolónga mikakatano to kozua ba nzelá ya likanisi po ya botámboli na bangó”.

Mokili ekosénga Carlo

Ezali hasard te sóki bokómisi sántu ebóti lokóla botelemi enene ya bapanzi nsango. “Mikolo miye, elobi momemi, ezali na bosénga ya kokamwa ya masoló pe ya nsango biwúti epayi ya bapanzi nsango”. Elembo mókó polélé ya boyébani na mokili mobimba ya elongi na ye eye ekofúngola likanisi na eténi mosusu ezui pósá na bato ebelé, ya koyéba ‘te Acutis akóma mokónzi ya internet. “Eye, elobi Nicola Gori, ezali nzelá mókó ekoki kobánda simá ya bokomisi ya mosántu, sóki masangá ya ba episkopo ya mokili mobimba baséngi yango na Papá to na dicastère ya Culte divin pe discipline ya ba sakramento. Na botáli monene ya lokúmu ya bosántu na ye, esúkisaki ye, ezali na elikya ebelé ‘te esálema”.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

07 sánzá ya libwa 2025, 16:43