Bakatekisi baúti na bikóló 115 na Roma po ya Zubilé na bangó
Vatican News
Zubilé ya bakatekisi ekobanda mokolo ya mitáno 26 ya sánzá ya libwá pe ekosangisa na Roma, engebene na communiqué moko ya dicastère ya Bopanzi nsango ndamu, koleka bato 20.000 ya mobémbo mwa boyambi baúti na bikóló 115 ya mokili, na bato ebelé bakoúta Italie, Espagne, Portugal, France, Pologne, Ukraine, Amerika, Argentine, Brésil, Paraguay, Mexique, Pérou, Colombie, Philippines, Inde pe Australie
Zubilé ekobanda mokolo ya mitáno 26 ya sánzá ya libwá na tóngo na ba mibémbo mwa boyambi ya bakatekisi baye bakoleka Ekuke Esántu ya basilique Sántu Petelo, káti ya ngonga ya 8 pe 17, pe ekokoba na veillée ya losámbo na ngonga ya 18 na ndambo na basilique, ekokambema na Mgr Rino Fisichella, Pro-Préfet ya dicastère po ya Bopanzi nsango ndamu. Na eténi ya mibále ya nzebi ya milúlu mwa losámbo ya Liloba, etáli esika ya bayekoli ya Emmaus (Lk 24, 13-33a), matatoli misáto ya bakatekisi bikobongisama, eye ya Liliana Russo ya Italie, ya Paulo Agostinho Matica ya Mozambique pe Estela Evangelista Torres ya Mexique, baye bakoloba lisoló na bangó ya mosála na loléngé ya bisika baúti
Mokolo ya póso 27 ya sánzá ya libwá, na ngonga ya 10, bakatekisi bakoki kozala na likita ya zubilé ya Papá Léon XIV, na esika ya Sántu Petelo. Na simá ya midi, na ngonga ya 16, ba malongi na baepiskopo bikozala na ba ndako-Nzambe ya káti ya Roma, na italien, anglais, portugais, espagnol, français pe polonais.
Zubilé ekosila mokolo ya eyenga 28 ya sánzá ya libwá na misa na esika Sántu Petelo ekokambema na Papá na ngonga ya 10, na misa ena Papá wa Roma akokulisa bakatekisi 39 ya sika. Bakatekisi baye ya ministère ya balaiki, baye bakozua lokóla na maboko na ye crucifix bo elembo ya mbela na bango, baúti Italie, Espagne, Angleterre, Portugal, Brésil, Mexique, Inde, Corée ya Sudi, Timor oriental, Émirats arabes unis, Philippines, Amerika, Mozambique, Brésil, Pérou pe République dominicaine.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo