Sapele mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa liboso ya feti ya Santu Yosefu
Nsango ya Vatican
Mokolo ya mibale 18 ya sanza ya misato na mpokwa, esika Santu Petelo eyambaki lisusu ba pèlerin ya mokili mobimba mpe na bilama ya Curie romaine mpo oyo ekomi ya momeseno sapele mpo na bokolongono ya nzoto ya Santu Papa. “Lelo na mpokwa lisusu tobelela Maria mpo ya bokolongono ya nzoto ya Papa François”, ebandaki koloba Mgr De Donatis.
“Lelo liboso ya mokolo ya feti ya santu Yosefu, toyebi ndenge nini Papa François asepelaka na feti eye, eleko ye abandaka mosala na ye ya mokitani ya Santu Petelo”, ekobaki ye koloba. Ezali bongo mokolo ya 19 ya sanza ya misato 2013 oyo Papa François asalaka misa monene ya bofungoli mosala na ye ya Papa.
Na bolobi na Ngondo Maria, episkopo ya lokumu abondelaki “Yanola na elikya monene na baye bazali kosenga lisalisi na yo”. Stabat Mater moko esukisaki ngonga ya losambo.
Papa akoyoka mwa malamu
Mokolo ya mibale ezali mokolo ebongisama mpo na mibombamo ya mawa maye maselemaki kobanda esika moko etiamaki na esika Santu Petelo: Yezu akoyoka mpasi, bobeti ye fimbo, bolatisi ekoti ya nzube, bokumbi kuruse mpe bobaki ye o kuruse na liwa.
Na moyi, liboso ya losambo, na oyo etali bokono ya Papa, Ndako ya bopanzi nsango ya Vatican elobaki ete Papa ayokaki malamu moke atako mwa mikakatano ezalaki. Kobonga ezali komonana mwa moke.