Luka

Papa o eleko y'Angélus Papa o eleko y'Angélus  (@Vatican Media)

Papá, na eleko y'Angélus, alendisi kondima banzelá ya Nzámbe

Kokata atá moke te lisoló na Mokónzi mpe kosambisa atá moke te mosála ya Nzámbe: yangó ndé Petelo akoteya bisó ntángo alakisi boboyi na ye mpe atelemeli Yézu o eleko ya bobimi ya Pasika. Na losámbo y'Angélus, na Castel Gandolfo, Léon XIV asengaki na bandimi ya kozala sémba na Nzámbe mpe ya kolona botosi na bangó epái na Ye.

JR Bompolonga - Kinshasa

«Ezali pété kaka te kososola mpe kondima banzelá ya Nzámbe, mingimingi ntángo bikómi misika na biye ya bisó», endimi Léon XIV na bolimboli Nsango-Ndamu ya mokolo ya eyenga ya 22 na Ntángo ya momeseno, na esika ya Bonsómi, na nsé ya ndáko ya bontómá ya Castel Gandolfo. Libosó ya bandimi bébóo basangani na nsé ya moyi makási ya mokolo ya eyenga ya súka ya sánzá ya mwambi, Papá azongeli eyano bapostolu bapesaki, mpe mingi mpenza ya yambo káti na bangó, Petelo, ntángo ayébisaki bangó Mobombano ya Pasika ezali kokóma.

Mawa ya Petelo

Petelo «akamwi mpe ntángo mosusu ayóki mawa» na maloba ya Yézu, mpo eye alobi ezali «mosika» na maye bayékoli bazalaki kozela «ya Masiya mókó molongi mpe makási» oyo akokaki kosálisa bangó ya «kolonga mpe konyata bangúná na bangó». Sóki Petelo alobi kondima Ye, ekomonana neti koloba 'te «ezali bongo te ndé mokili ekobika», elimboli Papá.

Lisenginya ya kokanisa 'te «Mokónzi [...] akobunga, to mabé lisusu, akoyóka bisó te to akosepela na bisó te», ezali ya sóló, endimi Léon XIV. Sóki Petelo akakatani na kolakisa boboyi na ye te mpe kotelemela Yézu, akotéya bisó «atáko bokási na ye» makambo mibalé ya ntina, emoni episkopo ya Roma.

Ya yambo, «kokata atá moke te [...] lisoló na Mokónzi» mpe «koloba na botiyi motéma pási na bisó ya kososola eye akosenga bisó». Na sima, ekobi Léon XIV, «kosambisa atá moke te mosála ya Nzámbe, kasi [...] komitiya na boyóki, na bomikitisi mpe na losámbo, na eye akolakisa bisó na nzelá ya ekela na ye, atá ntángo yangó ekokani na biye tokozela te».

Kokamata kuruze ya yo mókó

Yézu alimboli yangó ye mókó na bayékoli na ye ntángo alobi 'te «mpo ya kotambola na matambé na ye, basengeli komibosana, kokamata kuruze na bangó mpe kolanda ye», eye Petelo akosála, na bondimi Kristu lokolá «Mosikoli na ye, na bomoí na bisó mobimba, kinó na martyro».

Epái nini mbélá eye ya Papá na bandimi ya kosenga na Mokónzi «kozua, bisó lokolá na bomoí ya boyambi na bisó mpe na losámbo na bisó, bosóló kaka neti ya Petelo, mpo ya koyébisa Ye na bomikitisi eye tokoyóka mpenza, atá ntángo motéma na bisó etunngisami mpe, na eleko ená, koyéba kolona botosi na ye, na bondimi eye akosenga bisó koleka eye tokozela».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

01 sánzá ya libwa 2026, 13:52