Papa Léon XIV na esika ya Santu Petelo mpo ya likita lya banso Papa Léon XIV na esika ya Santu Petelo mpo ya likita lya banso  (ANSA)

Likita lya bansó: « Esengo mpe elikya bizala bilembo bikokesenisa Eklezia»

Papá abándaki mokolo eye ya misáto molongó ya sika ya litéya na mikánda minéne ya Concile Vatican II, na botelemi na Likambo-likonzi ya Gaudium et Spes, eye ezongeli yambo mpenza na Eklezia ekoyóka mpe na mosála ya mokili. Loléngé ya bokengeli ya Eklezia, esembolaki Léon XIV, ezali «elikya yokó ya bomwána te», kasi «lobóko lyokó ya sika na Mobombano ya Kristu».

JR Bompolonga - Kinshasa

Mpo ya mokolo eye ya misáto ya yambo ya sánzá ya libwa, Papá akútanaki na bandimi na esika Sántu-Petelo mpo ya likita lya bansó, sima ya bampóso ebelé ya matéya bilobamaki na basilique. Libakú mpo ya Léon XIV ya kokoba matéya na ye na bambuma ya Concile Vatican II, na botángi lisusu mikánda na yangó ya minéne. Ezali na Likambo-likonzi ya bokengeli ya Gaudium et Spes ndé episkopo ya Roma atelemaki, na nkombo ya litéya ya mokolo: Eklezia ekoyóka mpe na mosála ya mokili.

Na nzelá ya mokánda, elobaki lisusu Papá, Concile elingaki kokolisa likambo-likonzi ya ntina eye ya boyókani ya Eklezia na mokili ya leló. «Sántu Yoane XXIII, úta lisikulu na ye ya bobándi ya 11 ya sánzá ya zómi 1962, alingaki kokesenisa na "basakoli ya mabé" baye, "atáko bazalaki na bokási bokó ya eyamba" [...] bazalaki kozongela mbala na mbala 'te eleko na bisó, na bokokanisi na bikeke mibalé bileki, ezali mabé koleka; mpe kinó ya kozala lokolá na eloko te ya koyékola na lisapo», elobaki Papá wa Roma.

Kobima na bozangi eloko ya kosála mpe na bozangi likebi

O ntéi ya mibú 60, bambongwana ya makási ya mokili bipesaki liyóki 'te «bomoto ezalaki lokolá kokota na molongó mókó ya sika ya makambo», mpe episkopo ya Roma alobaki bôngó boni boni Gaudium et Spes elakisaki elili ya Eklezia yokó ekokútana na makambo. Mosála ya Batatá ya Concile ezalaki «ya komona bamwángo ya kokamwa ya Bobáteli ya Nzámbe, eye bikosálema ngonga na ngonga na mosála ya bato mpe mingimingi koleka biye bakozela».

Bobimisi Gaudium et Spes na 1935 endimaki bongo na bososoli ená «eloko yokó ya ntina ya loléngé ya Eklezia, na bolimboli ezaleli na yangó ya mobáteli lokolá eténi na ye yokó». Likambo-likonzi ya Concile efúngwami na bosákoli 'te Eklezia ekómisi ya ye «bisengo mpe bilikya, bamawa mpe babobángi ya bato ya eleko eye, babolá mingimingi mpe baye bansó bakonyokwama», elobaki lisusu Papá, na bolimboli boni boni mokánda miná bikotisaki bokási bokó ya sika.

“«Bokaboli bokó eye ekobenga bisó ya kobima na bozangi ya eloko ya kosála mpe na bozangi likebi libosó ya makambo biye bikosálema, na lisapo mpe na bomoí ya bato, mingimingi libosó ya mbongwana ya lombango mpe mozindo eye tokomona leló"”

Mpo ya Léon XIV, «ebongi te kotikala batáli baye bazangi likambo ya kosála; esengeli nzokándé koyóka na motéma, komitika kobengama, kokota na likambo lyangó». «Na Kristu mpe balendisami na bokási ya Elimo na ye, bandimi babengami ya kozua mokúmbá ya bandeko na bangó ya mibáli mpe ya bási, mpenza baye banyatami na bozangi bosémbo, bokaboli mpe mobúlú», ekobaki ye.

Kotála malámu bilembo ya bileko

Na loléngé liná, «bopenepene na bomoto ekopesa nzelá na botángi bokó ya mozindo ya makambo mpe ya Emoniseli yangó mókó», elobaki lisusu Papá wa Roma, mpe Gaudium et Spes, elobi lisusu «lotómo, ya ntángo insó, ya kotála malámu bilembo ya bileko mpe kolimbola yangó na mwinda ya Nsango-Ndamu».

Likambo-likonzi ya Concile «ebéngaki bôngó Eklezia na bomipesi bokó ya ntángo insó ya mbongwana, zambi ya kotatola 'te ekotámbola na "mpósá lyokó te ya mokili", kasi ekoluka kaka eloko se mókó: kokoba, na botindámi ya Elimo mobondi, mosála kútu ya Kristu, ayaka na mokili mpo ya kotatola bosóló, mpo ya kobikisa, mpo ya kopesa etumbu te, mpo ya kosálela, mpo basálela ye te», esembolaki Papá epái ya bandimi.

Ntina kinó leló ya Gaudium et Spes ekobeta kaka mpo ya mokili ya leló mpe loléngé liye tobengami mpo ya kotánga yangó mpe kolakisa bokeseni ya makanisi, ekobaki lisusu Léon XIV, na bozui ndakisa ezali na motúya mpo ya ye, eye ya makámá ya technologie yokó ezanga ndelo eye ezali na mosála ya moto te: «Botomboli bokó ya nzebi mpe ya technologie eye ekopesa kolemba te makoki ya sika, kaka mpo ya basusu, mpe eye moto akokoka te kotia "na mosála na ye"; to boyébi bokó ya polélé koleka ya "mibéko ya bomoí ya bato", elongo na makambo biyébani malámu te "mpo ya nzelá ya kopesa yangó"».

« Na eleko yokó ezua elembo ya bambongwana ya bozindo, bipái wápi bikowuta babozangi boyókani biye bikotungisa, Eklezia ebengami kosálela moto, na boyóki mpe na boyambi mituná ya mozindo koleka ya motéma na ye mpe mpe bampósá biye bizali na ye, na bolakisi na Kristu «fúngola, ntéi mpe súka ya lisapo nionso ya moto», elobaki na mokuse episkopo ya Roma, na bolingi 'te esengo mpe elikya (Gaudium et Spes) «bizala bilembo bikokesenisa Eklezia yokó eye ekosakola mpe ekotatola Nsango-Ndamu, na bopusani pembeni ya bási mpe babáli ya eleko na bisó».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

02 sánzá ya libwa 2026, 14:06