Elili ya kala Elili ya kala 

Pápa asengi na bilenge ya ekolo Équateur, bazala «bato baye bayebi kolimbisa».

Na mokolo mwa poso, nzela ya video, Léon XIV atindaki nsango moko, na bayangani ya likita ya mbala ya mwambe ya «Mikolo mya bilenge ya ekólo ya Équateur», oyo ezali kosalema na engumba Ibarra kobanda mokolo mwa 31 ya Yuli tee mokolo mwa 2 Agusto. Nganga-Mokonzi Monene asengaki bango ‘te bolingo bwa Kristu ebongola bango mpe bándima libyangi na ye. Papa alobi ‘te kokutana nà Yezu etondisaka mitema na esengo mpe epesaka makasi ya kozala batatoli to banzeneneke ba ye.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Eklezya ezali na mposa ya esengo na bino, mpiko na bino mpe litatoli na bino mpo ‘te ebele ya bato basusu bakoka kokutana na Kristu”, elendisaki Léon XIV na nsango moko ya video, epai na bilenge ya ekolo Équateur. Bilenge yango bayanganaki na engumba Ibarra, na nordi ya Équateur, mpo ya likita lya mbala ya mwambe ya “Mokolo mwa bilenge ya ekólo mobimba ya Équateur”, kobanda mokolo mwa 31 ya Yuli tee mokolo mwa 2 Agusto.

mokolo ya mwambe ya bokutani ya bilenge na ekólo mobimba, kobanda mokolo ya 31 Yuli tii mokolo ya 2 Augusto. Pápa abyangi bango basila “kobongwana” na “bolingo” bwa Kristu mpe bàzala “babongisi-nzela ya bolimbisi, ya kozongisa boyokani mpe ya kimya”.

Makasi ya kozala nzeneneke, ekowùta nde na Kristu

Pape atindeli bilenge mbote ya bolingo mpe asengi bango, bakanisa lisusu maloba ma molulu, “Zala na mpiko, nasili kolónga mokili”, “mpo na koyoka libiangi lya Mokonzi mpe kolanda ye nà molende”. Nganga-Mokonzi Monene alobi ‘te “Bokutani nà Yezu Kristu, ezali kotondisa mitema na biso na esengo mpe ezali kopesa biso makasi ya komona bolingo mpe Ngolu ya ye”.

Maria, Ndakisa ya biso mpo na kozala na bomoi engebene Nzango Elamu

Na nsuka ya liyebisi yango, yambo ‘te apesa bango bobenisi, atikaki “bilenge banso ya Equateur na maboko ya Notre-Dame ya Presentation”. bongo alobaki bilako biye: “Maria, azala ndakisa”, epai wapi bokozwa makanisi mpo na “kozala na bomoi bwa Nsango Elamu” mpe bomikaba lokola “ asàlàki yango, na bilako bya Nzambe” mpo na bomoi bwa yémei.

Matondo mingi na ndenge botangi lisolo liye

01 sánzá ya mwambe 2026, 18:02