Angélus: Kristu akokisaka nzala to mposa ya biso ya bosolo mpe ya bomoyi
Albys KBD,CP - Kinshasa/RDC
Pàpa azongeli kosàla losambo la Angelus na place Saint-Pierre, o mokolo mwa 2 ya Agusto, sima ya tango ya bopemi bwa ye ya eleko ya molungé na Castel Gandolfo. Léon XIV alobelaki bankóto ya bayabmi bayanganaki na nse ya maninisa ma bandako ya bapápa, mpe alimboleli bango Nsango Elamu ya Santu Mateo (Mt 14, 13-21): mampa matano mpe mbisi mibale oyo, bakaboli, etondisaki etuluku ya bato baye bayaki koyoka Yezu.
Engebene na Leon XIV, elembo na elembo ya Kristuepai y abato, ezali bomimonisi ya bokangami bwa ye mpe mposa ya yé ya kobikisa to kosikola bango. Episkopo wa Roma alimbolaki ‘te : «na kofungola miso ya bat oba lolàndà to bato bakufá miso mpe na kofungola matoyi ma bato bakufá matoyi, Kristu azalaki kokokisa te bobele makamwisi to misàla ya kokamwa, kasi azalaki mpe kosakola epayi na bato banso ‘te : Bokonzi bwa Nzambe ebélémi».
Kristo azali mampa ma bomoyi
Pàpa Léon XIV amonisi ‘te: “Yezu asukàki te kaka na kozongisa bososoli epayi na baoyo bazangi yango”, kasi: “apesaka elengi na bososoli bwa biso”. Atalisi bokokani bozali kati na kotondisama ya nzoto na mampa mpe mbisi, mpe na bolamu bwa milimo na nzela ya kokabola Liloba.
Na bato bakufà matoyi, Mokonzi ayokisi bango Nsango Elamu oyo basengeli koyoka, mpe azali komonisa bato bakufá miso nkembo ya bosikolami oyo esalemi mpo na bango. Mpo na Leon XIV, “Kristu azali eloko ezali kokokisa solo nzala ya mokili ya bato; nzala ya bosolo mpe ya bomoyi”
Likabo la Nzambe mpe boséngà bya bato
Likambo ya kokamwa ezali ‘te kokabolama ya mampa mpe mbisi ememi kobilama ya biloko oyo ekoki kopesama na etuluku ya bato. Moto na moto azwi mingi, mpamba tè, bofuluki eleki mingi. Mokapo moye mozali komonisa ‘te likabo lya Nzambe ezali mpo ya bato banso, mpe ekoki kosila te.
Na bokeseni ya elembo eye ya bolingi bwa Nzambe, Léon XIV akebisi na ntina na mitambo miye bato bakoki kokweya na yango. “Kobomba biloko mpe kobebisa yango ezali makambo mibale ya mabe: lokoso. Maladi oyo ya molimo ezali kobulunganisa biso, mpo ezali kolangwisa biso na bomengo, kino kobosana baye bazali kolela nzala mpe kolela posa ya mayi”.
Kolanda nzela ya Kristu
Pàpa akokanisi liloba la mokolo mwa lelo nà makambo ya mikolo mya biso, bongo abyangi biso totàla bilembo bya Kristu. “Na éliki ya bitumba mpe ya lolendo, tomoni blolenge kani na ngolu ya Mokonzi, ‘atombolaki miso o likolo’, ‘asakolaki maloba ma bobenisi’, ‘abukaki mampa mpe apesaki yango na bayekoli ba ye” mpo ‘te bàkabola na bato”. Mpo na episkopo wa Roma, “likamwisi ya bondeko” ekomi na suka na yango na elambo ya mpokwa, mpo “ezali na ntango wana nde Mwana wa Nzambe apesi biso bomoi bwa ye lokola ndeko na biso na bomoto”.
Léon XIV asengi kolanda Kristu, mpe na nzela ya “ngolu ya Ukaristya, komipesa na kozala nzeneneke ya bonzenga bwa ye, na misàla mya biso ya mokolo na mokolo”. Nganga-Mokonzi Monene apesi bandakisa ya kitoko, lokola kopambola bilei liboso lya kolia, to na tango ya bopemi lokola “ntango ya kimya na bondeko, na kokotisa baoyo bazali na boséngà pembeni na biso”.
Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye.
