Luka

2026.08.03: Episkopo wa lokumu, Dom Júlio Duarte Langa, episkopo ya kala ya Xai-Xai, oyo akufaki o mokolo mwa 3 Agusto ya mobù moye 2026. 2026.08.03: Episkopo wa lokumu, Dom Júlio Duarte Langa, episkopo ya kala ya Xai-Xai, oyo akufaki o mokolo mwa 3 Agusto ya mobù moye 2026.  (Cremildo Alexandre, Rádio Encontro (Nampula, Moçambique))

Pápa apesi Kondoleansi na yé mpo na liwà ya Episkopo wa lokumu Júlio Langa

Mikolo mibale sima ya liwà lya Júlio Duarte Langa, episkopo ya Mozambiko, o mokolo mwa 3 Agusto, na nzela ya telegrame, Pape atindelaki ba episkopo ya Mozambiko mpe libota lya ndeko molingami na bango, maloba ma yé ya mawà. Nganga-Mokonzi monene alobaki ‘te: azalaki “pene nà bato, namosala mwa yé ya Mabateli ya milimo”. Azalaki mpe moto ya “boboto, molende mpe mpiko”.

Bansango ya Vatikan

 

Na telegrame oyo atindelaki Mgr Francisco Chimoio, O.F.M., mokambi ya Xai-Xai, na sima ya koyoka nsango ya liwà ya Episkopo Júlio Duarte Langa, episkopo ya kala (emerite) ya Xai-Xai, Pàpa Léon XIV amonisaki “Mawa na yé” na dioseze, na Eklezia ya Mozambique mpe libota ya moweyi, oyo bazali kolela liwà ya “mokengeli mpate ya lokumu”.

Molende mpe mpiko

«Ndeko molingami», elobaki Nganga-Mokonzi monene, «azalaki na lobokó, na Kristu molakisi mpe Mokonzi wa yé». Ayekolaki epai na ye mosàla ya kozala pembeni na bato na mosàla mwa ye ya bokengeli milimo. Amibonzaki na botawù bonso, nà mpiko nà molende mpo ya mpate oyo epesamaki na mokumba mwa yé. Alembaki te liboso lya mikakatano, kasi akomisaki yango libakù malamu to bisika ya mposa ya Nsango Elamu. Ye akumisami mingi, mpamba té, asalaki bokeseni, na tango ya «kosakola Nsango Elamu ya kimya mpe ya boyokani mpo na avenire ya bondeko kati na bato ya  Mozambiko banso», ebetaki Pàpa nsete.

Matanga

Tata Mosantu apesi bato banso bobenisi bwa ye ya bontómà lokola elembo ya libondisi, na ngonga eye ya mawa. Kasi alobi ‘te ezali mpe koleta, tango ya elikya ya nsekwa. Na yango tozali kotonda Nzambe mpo na bomoi molayi ya episkopo Júlio mpe mpo na likabo ya bonganga bwa yé mp ona kosalisa ba-Mozambiki mpe Eklezya ya molongo mobimba.

Matanga ya episkopo Dom Júlio Duarte Langa ekobanda o mokolo mwa 06 ya Agusto. Misa moko ekosalema na ngonga ya 9h00 na katedrali ya Maputo. Nzoto ya mowei ekotindama na Xai-Xai, esika misa ekosalema na sinma ua nzanga. O mokolo mwa mitano, mwa 7 ya Agusto, bansambo elengelami na bituluku ekosalema, mpe ekosuka na misa. Mokolo moye molandi, nzoto na ye ekomemama na Xonguene, na esika mosantu to sanctuaire ya Notre-Dame ya Lourdes, epai misa ekosalema na ngonga ya 9h00 ya ntongo, mpe na nsima bakokunda ye na kati ya sanctuaire.

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye

05 sánzá ya mwambe 2026, 15:52