Luka

Bakimi-mboka na engumba ya El Obeid, na Soudan, na sànzà ya Yanuali eleki  Bakimi-mboka na engumba ya El Obeid, na Soudan, na sànzà ya Yanuali eleki  

Pàpa abwaki mbélà mpo ya Kimya na Soudan mpe mpo ya bobateli ya basivili

Nsima ya losambo la Angélus na Saint Pierre, Léon XIV atalaki ekólo ya Afrika, oyo ebebisamaki na etumba ya bana-mboka na boumeli ya mibù koleka misato. Bongo, asengaki na communauté internationale bàsunga mpo bàtika kobete masasi - bakitisa mandóki. Pàpa alendisaki mpe mpo na kozonga ya kimya na Ukraine. Alobi ‘te azali pene na mabota manso maye mazali konyokwama na bitumba.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na sima ya kosala losambo la Angelus, Pápa abyangaki communauté internationale mpo ‘te básukisa bitumba na Soudan. Nazali kolanda nà bobangi nyonso, makambo ya mawa oyo ezali koleka na Soudan, mingi mpenza na engumba ya El-Obeid. Alobeli engumba-mokonzi ya etuka ya Nord Kordofan, epai wapi bitumba ya koboma bato ewumeli baposo mingi kati na bondonwani ya mampinga ya basodá mpe mampinga ya basodá ya FSR (Forces de Soutien Rapide).

«Nazali pembeni nà bino na molimo, elongo nà bato ya mboka oyo ; nazongeli mbela na ngai na bakonzi, mpo ‘te bafungola nzela mpo na kopesa lisungi na bato oyo bazwi likàmà. Bobele na ntango yango, nasengi na communauté internationale bàsunga milende minso miye mizali kosàla mpo bàtika kobete masasi - bakitisa mandóki, bono kimya ya lombango ekota», elobaki lisusu Pàpa. Nations-Unies etangi yango lokola crise humanitaire ya mabe koleka. Bitumba ya Soudan ebomi bankoto ya bankoto ya bato ut’o ebandaki na eleko ya elanga (printemps) ya mobù 2023.

Kosukisa etumba ya Ukraine

Tata Mosantu alobelaki Ukraine, oyo ezali nayino kati na etumba. “Ba nsango ya mawa mpo na bato baye bazangi mbebà to basali eloko te, kasi bakufi mpe bazoki na Ukraine mpe na Russie, ezali kaka kokóba”, elobi Leon ya XIV. Alobaki ‘te azali pembeni na mabota ya bato oyo bakufi mpe na bato banso bazali konyokwama na bitumba oyo ezali kosalema.Yambo ya kobwaka mbela ya sika, alobi ‘te: “Nazali lisusu kosenga na lómà ‘te mibeko mya bomoto mitosama mpe bitumba biye bizali kobundisa bato ya mboka bikoka kosila bisika binso to bipayi na bipayi”. Etumba ezali bobele kobimisa bitumba mingi lisusu mpe ezali kopesa mpasi mingi. Ntango ekoki mpo na kosukisa mobulu oyo mpe kopesa nzela na diplomatie mpe na masóló mpo na kofungola nzela na kimya”.

Matondo mingi na ndenge otalingi lisolo liye.

09 sánzá ya mwambe 2026, 12:31