Na Assizi, Pàpa asengi na bilenge bàtonga mimeseno mya bolingo

Na tango moko ya eyenga, ya losambo mpe ya bondeko, bilenge koleka 2 000 oyo bautaki na mikili minso ya Pótó, bayambaki Léon XIV na Assizi, mokolo mwa 6 Agusto, mpo na mokolo mwa nsuka ya Go ! Franciscan Youth Meeting. Boyokani yango esalemaki na ntango ya mobembo mwa Papa Léon XIV mpo na kokanisa mibù nkoto mwambé (800 ans) ya liwa ya Santu François. Akozongisa biyano na mituna misato ya bilenge. Mpe Tata Mosantu abyangi mabota ya sika ya bilenge mpo bazala “bato oyo batyaka kimya”.

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

Banda mokolo mwa 3 Agusto, engumba Poverello ezali konguluma na loyembo, na masóló mpe na mabondeli. Bilenge koleka nkóto ibale 2 000, oyo bazali na mbula kobanda zomi na mwambé (18 ans) tee tukù misato na isato (33 ans), ezala ba kristu mpe nà baoyo bandimaka makambo ma Nzambe te, bazalaki wana. Bawutaki na mikili ya Potó mobimba, bazali kosangana na “GO! Franciscan Youth Meeting”,  Likita ya bilenge ya Lingomba ya ba Franciscan. Solo, ezali bomipesi ya molende ya ba franciscains nde etondisaki engumba Assizi na mayóki ya mikolo ya mokili mobimba ya bilenge. Na bowumeli ya mikolo mineyi, basangani mpo na kokabola ba expériansi ya bomoyi bwa bango. Basangani na ba ateliers, ba formations mpe ba feti, na molimo ya Santu François. Mpe likambo lya ntina ya bokutani oyo ya bilenge ya ba franciscains ya mikili ya Eropa to mpe ya Potó, «ezali tango ya kosolola na Pàpa, o mokolo mwa 6 ya sànza eye ya Agusto». Léon XIV asalaki mobembo mwa ye ya mbala ya mibale na engumba ya Ombrie (Umbria), na kolanda ndakisa ya François oyo ayaki liboso na ye, oyo akendaki kuna mbala motoba. Na sanza ya Novɛémbe ya mobu moleki, Nganga-Mokonzi Monene akendeki kuna mpo na kokutana nà baepiskopo ya ekólo Italie.

Bondeko ya Boboto mpe motema ngolu

Yambo ‘te akóma esika ya bilenge, Pàpa akendaki komanyola mwa ntango moke na Portioncule. Sima Mofelele Marco Vianelli, ministre provincial ya ba Frères Mineurs ya Ombrie mpe ya Sardaigne, alimbolaki na lisukulu la ye ya boyei bolamu, ntina ya mobembo monà mozalaki na motema mwa Santu François. Bongo mpo ya mobù moye bakosepela Zubilé ya mibù nkàmà mwambe ya liwà lya “Poverello”, oyo elakisi na lokótà ya lingàla ‘te “moto na bobólà”. Alingaki ‘te esika enà, etikala libela “esikà-motema ya libùlà ya molimo ya yé”, epai wapi ekoyokana na kati na yango, ezaleli ya botàwù, ya bondeko, ya kimya mpe ya motema ngolu, oyo ezali kokóba kobenda bato ya mobembo na mokili mobimba

Mofelele Marco Vianelli, alobelaki mpe lokola, bozali ya bankoto ya bilenge bakutani mpo na kokanisa mpo na kokanisa makambo ya mikol’oyo lokola kimya, bomoto, mosàlà, nkita, kokabwana na bato mosusu mpe kobatela bikéla bya Nzambe. Nsima ya kotonda Nganga-Mokonzi Monene botondi mpo andimaki libyangi na bango mpe ayaki kokutana na bango, afungolaki eteni ya bokutani na kobenga bilenge, mpo ‘te bàtinda mituna mya bango epayi ya Pápa, na elikya ‘te akolendisa bango na kozala na bomoyi mpe kotàtola Nsango Elamu na lolenge ya Santu François. Tango Tata Mosantu afungolaki masóló, bilenge basato bawùtaki na mikili ndenge na ndenge ya Eropa bàsalaki ye mituna misato mya ntina. Mbula nkàmà mwambe nsima ya liwà lya Poverello, bato bazali kaka koyoka maloba ma ye.

Bózala basaleli ya Boboto (kimya)

Karolina, elenge mwasi ya mboka Croatie, akolaki na paloase ya ba Franciscains, afungolaki eteni ya mituna mpe biyano. Amonisaki ‘te lelomei, “Tozali na mokili ezali kobongwana na lombangu, nzokandé bilenge bayiké  bazali na mikakatano ya kozwa bisika malamu ya ndakisa, kosala boninga ya solo-solo mpe kofungola mitema na bango epai ya Nzambe”, bongo motuna mwa ye epayi ya Pàpa ezalaki boye: “Toli nini okopesa biso bilenge oyo tobotami nà boyambi ya ba franciscains, mpo ‘te tózala bayekoli ba solo ya Kristu mpe tomemela baninga ba biso ya kelasi elikya, kasi tózanga kobungisa esengo ya Nsango Elamu o kati ya biso, bosolo ya mitema mpe boninga elongo na bato oyo bazali kondimisa matatoli manso ya bokristo? ”.

Pàpa ayanolaki yé, bongo alimboli ‘te: “Na bowùmeli ya baekeke, kozala ya ba Franciscains epesaki makanisi ya masóló mpe epesaki esika na bozalani elongo na boboto, kati na biyamba Katoliko, Ortodoksi mpe ba mizilma”. Na yango, kozala sembo na mimeseno ya bozalani penepene, elakisi kokende na ngambo mosusu, kosala mosàla mpo na kopetola makanisi mpe kokólisa bozongeli koyokana.

Pàpa abetaki mpe nséte lisusu na likambo, oyo ‘te “bakristu bakobengama mbala na mbala mpo na kozala bato oyo batyaka kimya na kati ya masanga ya bato, oyo, bazali koluka kosalela eklezya mpo na kokweisa to kobongola bomoto ya bato”.

Na yango, kozala nzeneneke to temo ya Kristu, ezali mosala moko ya kitoko mpe ya makasi, mpamba te efungolaka makanisi mpe mitema na biso koleka mindelo miye bato batyáka; elingi koloba ‘te, koleka bobangi oyo ewuti na bansango ya lokuta mpe bifelo ya makanisi mabe. Kokima miseno ya nguya mpe kotonga civilisation ya bolingo ezali eloko eyokanaka mbala moko te, mpe bato bandimaka yango te.

“kozala nzeneneke to temo ya Kristu, ezali mosala moko ya kitoko mpe ya makasi, mpamba te efungolaka makanisi mpe mitema na biso koleka mindelo miye bato batyáka; elingi koloba ‘te, koleka bobangi oyo ewuti na bansango ya lokuta mpe bifelo ya makanisi mabe. Kokima miseno ya nguya mpe kotonga civilisation ya bolingo ezali eloko eyokanaka mbala moko te, mpe bato bandimaka yango te”

Bóyekola epai ya Santu François bonene bwa Nsango Elamu, oyo ekeseni na fondamentalisme: yango ekozipaka miso te, ezali mpe na mobulute, kasi ezali bososoli, bokebi, bomikitisi mpe eyebo koyamba bato banso; elobaki episkopo ya Roma. Na eleko oyo televizyo nde ezali na esika ya liboso na bomoi ya bato, Pàpa Leon XIV alendisaki bilenge bázongela koluka boninga ya solosolo. Bozala batatoli to banzeneneke ya lolenge oyo ya kozala, na bisika binso, mingi mpenza na eleko eye tekinoloji ezali kosala ‘te tómesana lisusu te na kozala elongo, kati na bato bazali na mosuni mpe mikuwa na nzoto”, elendisaki Mokitani ya Petro.

 « Iyo » mpo ya sékó

Na eyano apesaki na Giovanni, elenge moko oyo azalaki komitungisa mpo na «mimeseno ya ntango mokuse», Léon XIV alobaki ‘te «na makambo ya ndenge wana, kozala na mpiko ya kozwa mokano (ekateli) ya solo solo ezali mbala mosusu likambo oyo eleki ntina». Mpo na Pàpa, koloba “Iyo” mpo ya seko to mpo ya libela ezali boloko te, kasi avantile (aventure). “Bolingi, ezali kobima, ezali nzela oyo esengeli koyeba, nzela oyo Nzambe atambolaka na biso elongo”, ekundoli Mokitani ya Petro, oyo apesaki bango mpe litatoli lya bomoyi bwa ye moko, na ntina etali mobembo ya mosala mwa ye. “Mokonzi atikaki ngai soki moke te, atyaka ntango inso bato na nzela na ngai mpo na kotambola elongo nà bango”, elobaki yé.

Bolingi bwa Kristu

Motuna ya misato, oyo elenge mobali Luigi asalaki, elobelaki makambo ya bampota ya eklezya mpe ndenge oyo bilenge mingi batalelaka yango ezali komonisa ‘te lingomba ezali na mbéba. Léon XIV ayanolaki ‘te: «Tosengeli kondima Yezu oyo asekwi mpe kotika ye asàla kati na bomoyi bwa biso». Mpo ya kopesa bango ndakisa, azongeláki maloba oyo Santu François ayokaki liboso ya kruze ya Santu Damien ; Pàpa akundwelaki bango ‘te «mokomoko na biso azali na mokumba ya kosàla na esika ya botongi boye, oyo ezali nayino ya kofungwama». Ndé bongo, «Tókolobela Eklezya na bolingo oyo moto nyonso akoki kozala na yango mpo na mama wa ye ».

Na babalabala ya Assizi mpe na lopango ya Portioncule, basaki ya kolala ya bayangani ekokani na oyo ya ba Frères franciscains ya liboso, oyo bayanganaki na esika oyo elongo nà mobandisi na bango, sima, ya bikeke nkàmà mwambé, elobaki Pápa.  Na kosukisa, alobaki boye: «Ezali mpenza esengo mingi kozala esika moko mpo na kolobela makambo ma Nzambe mpe na nzela ya yé, kolobela bomoyi yango moko».

 

Matondo mingi na ndenge otangi lisóló liye.

06 sánzá ya mwambe 2026, 20:57