Lógó moko, elembo mpo na boyei bwa Pápa na ekólo France
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
Logo yango ezali na langi mpe ezali kongenga, ezali lokola fololo ya rose ya ndako-nzambe monene. Ezali kolakisa Esengo mpe makambo ya molimo, eponamaki mpo na komonisa mobembo ya Pápa Léon XIV na France, kobanda mokolo mwa tukù mibale namitano kino tukù mibale na mwambé ya sànzà ya setembé (25 - 28 Septembre) ya mobù moye 2026.
Na liboso ya hema to sanduku ya bondeko ya gothiki, ebenga moko ezali kopumbwa, mapapu etandami, etapi moko na monoko. Elilingi yango ezali elembo ya Elimo mpe ya Elikya oyo ezali kati na nsango ya mobembo yango: “Mpo ‘te mokili ezwa bomoi”, maloba oyo maponamaki mpo na mobembo ya Pápa na France. Likambo lyango ezali na boyokani na mibeko miye mizali kosalelama mikolo miye mpo na nsuka ya bomoi ya moto.
Ndimbola ya Elilingi
Eteni mokomoko ya liyemi ezali na ndimbola ya elilingi: - ebenga, elembo ya kimya mpe ya Elimo Santu; - etapi ya nzete ya olive, elembo ya bomoi mpe ya kozongisa boyokani; kuruze, elembo ya nsekwa; - mpe na nsuka, sanduku ya losambo, oyo ezali elembo ya losambo ya mobembo yango.
Mpo na Lisangà ya ba Episkopo ya France, ezali “elembo ya kokamwa oyo esangisi ebenga (pijon) ya kimia, kopasuka ya bomoi mpe elimo ya bafololo ya rose ya ba katédrali na biso”. Amonisaki ‘te “balangi ya bendela (drapo) ya France oyo ezali na balangi misato esangani na langi ya mosàkà ya bomoi mpe langi ya mai ya pondu ya elikya, mpo na kosàla mokili moko ya esengo mpe oyo ezali kongenga”.
Ata ekomeli ya libungutulu mpe ya kitoko, ebongisamaki malamu. Nkombo ya pápa ekomami na langi ya bulé likoló ya langi ya mpembe, oyo ezali langi ya Ngondo Maria. Nkoma ya “O” ya Léon ekokani na Ukaristya.
Mayele ya kosala mayemi mpe likambo ya molimo
Na mokolo mwa 6 ya sànzà ya Yuli moye, Lisàngà ya baepiskopo ya France (Conférence des évêques de France) (CEF), ebimisaki logo yango, oyo esalemaki na Atelier Argo na lolenge ya Art déco. Mayemi na yango ya sika ekokani mpenza na Nsango ya Biblia oyo esilaka ngala te. Ghislain d’Orglandes, moto ya mayele na makambo ya kosala mayemi, alobi ‘te: “bansinga ndenge na ndenge oyo ezali na elembo yango ya lolenge ya zolongano, ezali komonisa ndenge oyo Liloba, to Evanzile, ezali kopalangana”. Kasi tokoki mpe “komona bomoko kati na bokeseni”.
Longola elembo ya liboso, basalaki mpe bililingi bisusu mpo na mobembo ya Pápa, oyo ezalaki komonisa bisika misato oyo Pápa akokende: Paris, Lourdes mpe Metz.
Na elembo mosusu, moto akoki komona elilingi ya Léon XIV na langi ya mpembe mpe ya roze, ezali kopesa bato mbote.
Matondo mingi na ndenge otangi lisólo liye
