Papa Léon XIV na likita lya banso na esika ya Santu-Petelo Papa Léon XIV na likita lya banso na esika ya Santu-Petelo   (ANSA)

Likita lya bansó: mobú ya molúlú ya losámbo na misa, nzelá yokó mpo ya kobika mobombano ya Kristu

O eleko ya likita lya bansó ya mokolo eye ya misáto 12 ya sánzá ya mwambi, Papá asakolaki litéya na ye ya motóbá na Sacrosanctum Concilium, mobéko-likonzi ya Concile Vatican II na molúlú ya losámbo na misa. Na basilique Sántu-Petelo etondí meke, Léon XIV alobaki 'te mobú ya molúlú ya losámbo na misa ezali bokómisi sika mosála ya libiki eye Kristu akosála na lisapo, na bopesi mingi na bandimi ngolu na ye.

JR Bompolonga - Kinshasa

Mokabo ya mitáno ya Mobéko-likonzi ya Concile Sacrosanctum Concilium, ebulisami na mobú ya molúlú ya losámbo na misa, elobaki Papá, libosó ya bandimi bébóo, basangani na basilique Sántu-Petelo. Léon XIV alobaki lisusu 'te «ndéngé waná ya kolimbola molongó ya biyenga ya bokristu» lokolá «mobú ya molúlú ya losámbo na misa», «epanzana na lokóta ya Eklezia na lisálisi ya mosála ya Mosáli ya Nzámbe, sángó Prosper Guéranger (1805-1875)».

Na encyclique Mediator Dei, ekobaki ye, Papá Pie XII alobi 'te mobú ya molúlú ya losámbo na misa ezali «bolakisi bokó ya malili mpe elála ya makambo ya kála» te, ezali «bolobi bokó ya pámba ya bosóló ebelé ya kála te». Esengeli «kososolama lokolá bokómisi bokó ya sika ya ntángo insó ya mosála ya libiki eye Kristu akosála na lisapo». «Mobú ya molúlú ya losámbo na misa, ezali ndé Kristu ye-meí, oyo akobika kaka na Eklezia na ye», elimbolaki Mokitani ya Petelo, na botángi lisusu Mediator Dei, ya oyo azalaki libosó na ye.

Mokolo ya eyenga, «ntina mpe motéma» ya mobú ya molúlú ya losámbo ya misa

O ntéi ya molongó ená ezali mokolo ya eyenga. Mpo ya Batatá ya Concile Vatican II, ezali «mokolo ya féti ya ntina koleka» mpe ekolakisa «ntina mpe motéma ya mobú ya molúlú ya losámbo na misa». Mokolo ya eyenga mókó mókó ezali bongo Pasika yokó ya póso: bakristu bakokanisa nsekwa ya Kristu mpe bakokómisa 'te ezala na misa. Atá na nkótá bipái wápi ndakisa ezalaka libosó na «mokolo ya moyi» (Sunday,Sonntag), «tokomona nsinga na Kristu». Mpo, elakisaki episkopo ya Roma, azali «moyi ya sóló ya bosémbo» oyo «akongengisa moto mókó mókó».

Na mokánda na ye ya bontómá Dies Domini, ebimaka na 31 ya sánzá ya mitáno 1998, sántu Yoane-Polo II abeti nsete na likambo 'te «mokolo ya eyenga ezali mokolo ya Mokónzi, mokolo ya Eklezia, mokolo ya moto» mpe, na súka, «mokolo ya mikolo». «Mokolo ya eyenga ezali Pasika ya póso, esika wápi ekumbami mpe ekosála ezala mokolo eye Kristu asekwi káti ya bawá, azali lokolá mokolo eye ekolakisa ntina ya ngonga», elakisaki Papá na bozongeli maloba ya sántu Yoane-Polo II. Na bobimi na Nsekwa, mokolo ya eyenga, elobaki Léon XIV, «ekokabola ngonga ya moto, basánzá, mibú, bikeke, lokolá likongá ya bokambi eye ekokatisa bangó na bomemi bangó na ntina ya boyeí ya mibalé ya Kristu» mpe «epesi elembo ya mokolo ya súka, eye ya Boyeí ya mibalé esika wápi tokosekwa bansó».

Ukaristiya o káti ya mokolo ya eyenga

Mpo ya kosantisa mokolo ya eyenga, ezali na ntina, engebene na Mokitani ya Petelo, ya «kokumisa Ukaristiya». «Boyóki ya Liloba mpe bozali na Nzóto ya Kristu» bikosenga, engebene na Batatá ya Concile, convenire in unum (cf. SC, 106), elingi koloba «bosangisi ya féti ya bandimi». O káti ya likita liná, lisangá ya bakristu ekolakisa bosangani na ye na Mokónzi mpe ekotatola boyókani na ye na Kristu mpe lobokó na ye na Eklezia. «Likita ená ekoki kokitana na bozali bokó kaka ya elilingi te, kokitisama na lisangá lyokó kaka ya pámba te».

“«Lisangá ya molúlú ya losámbo na misa ekosálema bongo na bozali ya sóló ya bandeko babáli mpe ya bási, babengami elongo mpo ya kokumisa Nzámbe oyo abóta bangó, "na nsekwa ya Kristu káti ya bawá, mpo ya elikya yokó ezali na bomoí"».”

Tatá-Esántu alendisaki bongo «mókó mókó ya koluka makambo ya malámu koleka mpo 'te atá baye, mokolo ya eyenga, bazali na likoki ya kotika mosála na bangó te bakoka kozala na Misa esántu».

Úta Pasika kinó Nkítélá

Na bozongeli «lisapo ya esengo» ya mobú ya molúlú ya losámbo na misa, etambolami na mikolo ya eyenga, esika wápi «bikokutana boyambi mpe losámbo ya Eklezia», episkopo ya Roma alobaki lisusu 'te kobánda «ekeke ya mibalé sima Y.-K, na bokumisi ya póso ya Pasika ebakisama eye ya Pasika ya mobú, féti enéne koleka epalanganya na eleko ya esengo koleka ya mibú ntúkú mitáno, ekómaka na súka ya Nkitélá, mpe ebongisama na eleko ya Karesimo na loléngé na ye ya kosenga bolimbisi».

«Botomboli ya molongó ya Mbotama, eye ezuaka na sima likanisi ya ndakisa ya Pasika, esálisa ya kobika lisusu mibombano ya bokómi moto ya Liloba ya Nzambe, ya mbotama na ye mpe ya bobimi na ye na mokili», elobaki Léon XIV. Eklezia ekotisaki lisusu na bangonga bikeseni ya milúlú ya losámbo na misa limemía ya Mwáesengo Ngondo Maria, «esangana makási na mosála ya libiki ya Mwána na ye» na lokolá «molimo ya bamartyro mpe ya basántu basusu baye [...] na likoló, bakoyemba mpo ya Nzámbe nkembo ya malámu mpe bakosambela mpo ya bisó».

Mayéle ya kotéya lisapo ya libiki

Mpo ya Papá, «mobú ya molúlú ya losámbo na misa ebongisi lokolá, na ndéngé yokó ya sakraménto, mayéle ya kotéya lisapo ya libiki, na bokambi bandimi úto bozeli ya Masiya kinó bonéne ya mobombano ya Pasika mpe ya botiyi libosó nkembo ya lobí». O ntéi ya ye, elakisaki ye, «Eklezia ekokumisa mosála ya libiki ya leló ya mobombano ya Kristu, na bosálisi bandimi ya kozala waná kaka na bozindo koleka». Yangó waná, esúkisaki Papá, «mobú ya molúlú ya losámbo na misa ezali mokáno ekopesa likanisi mpe mwángo ya ndimbola ya ntina ya mosála nionso ya mobáteli».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

12 sánzá ya mwambe 2026, 14:53